Hypersensibilite ya bilei elengi ko likambo oyo etali allergie pe lolenge ya bo boyi bilei.
Soki ozali na allergie na bilei, biteni ya kati ya nzoto na yo oyo ebundisaka bokono eko banda ko telemela biloko mususu na elei na yo. Biteni ya kati ya nzoto na yo oyo ebundisaka bokono ebotaka ba anticorps oyo ekendaka ko telemela ba proteine oyo evandi na kati ya bilei. Ba proteine oyo ezali na makoki ya bota ba reactions allergiques ba bengi yango na kombo ya « allergenes ». Ba proteine oyo ya miliki to pe oyo ya ko landisa lingomba ya ndika nde bazali ba allergenes oyo ba yebani mwa mingi. .
Nzoto ekoki pe ko sukuma moke liboso ya bilei misusu, kasi elakisi te ke ezali na allergie. Eloko wana toko benga yango kaka hypersensibilite ya bilei. Ezali na yango mwa eboyeli. Eboyeli ya “lactose” na nzoto ezali ndakisa moko ya intolerance. Mabumu ya batu ebele ekokaka ko lamba penza malamu te « lactose ». Biloko oyo bandisaka bilembo ya intolerance to bengaki yango ba declencheurs. Ba declencheurs ebotamaka yango moko na bo pete na kati ya biloko ndeti oyo to bengi na kombo ya lactose. Ba conservateurs ndeti ba sulfite ezali pe ba declencheurs.
Pona ko yeba mingi na tina ya
Intolerance ya lactose
Bokona ya Coeliac
Hypersensibilite na bilei, allergie ya bilei pe intolerance ya bilei ekomelaka batu mikolo kobanda na 1% te na 4% et epayi ya bani mikie ko banda na 4 te na 6%. Bana mikie oyo nzoto na bango esukamaka soki ba meli miliki ya ngombe ba kokaka ko longa yango tango bazali nanu na tango na bango ya bomwana ya mukie makasi.
Wuta na makila ya libota na bino, bokoki ko zala batu oyo ba nzoto ebongisama deja pona ko kueya na hypersensibilite ya bilei. Soki ozo mimona na kati ya batu wana, nzoto na yo ekoki ko bota allergie na intolerance na bo pete. Makila ya libota na bino elingi ko lakisa ete moboti to mpe ndeko na yo moko oyo atungisamaka na likambo ya allergie na intolerance na ndenge ya ko sakana te. Pona ko bimisa ete moto akoki ko tungisama na hypersensibilite na bilei ezalaka likambo ya pete te. Bilembo na ngo ekesanaka epayi ya moto na moto. Toko bakisa boye, mitungisi ekoki pe ko wuta na makambu mususu kilikili.
Hypersensibilite ya bilei ezali na bilembo nini (allergie mpe intolerance) ? Ba bilembo ya hypersensibilite ya bilei ekesanaka makasi penza. Makama ekomelaka mingi mingi na poso, na ko pema, na estomac na mitshopo misusu. Kasi ba ndenge ya mitungisi nionso oyo ekoki pe ko wuta na ba makambo mosusu. Ezali na litomba makasi ete monganga ya libota atia na pembeni ba lolenge nionso misu oyo makambu elekelaka. Ndakisa ya ba lolenge allergie na intolerance ememaka bo tungisi, to tangi
Anaphylactic Choc anaphylactique ezali likambu moko ekoki pe ko memela mutu liwa na ko bota kokoso ya allergie na nzoto na ndenge ya makasi penza. Kokosa ya allergie wana owuta na mwa biloko boye ndeti nguba, wangila, kasi ba kisi to mpe soki musua ya nzoyi ekoki pe ko bandisa choc anaphylactique. Ekomaka penza te bilei moko oyo oliaka deja mikolo nionso e banda na mbala moko ko sala yo ba choc anaphylactique.
Anaphylactic Choc anaphylactique ememaka na liwa soki ba landeli yango na lombango te. Bilembo ya choc anaphylactique emibimisaka na ba minutes et tangu mususu ekoki ko tikala ba ngonga molayi. Soki ba salisi yango malamu te, choc mususu ekoki lisusu ko mizongisa na sima ya 6 heures to 8 heures. Tango choc anaphylactique ekomaka, ndenge motema ebeta ekoki komi lembisa makasi tee emema moto amiyeba lisusu te. Crise ya asthme mpe ekoki ko mi landisama na mbala moko. Elembo ya liboso ya choc esalaka ndeti biloko moko ezo tshuba tshuba nzoto, mukusa to mpe oko yoka na monoko ndeti na gout ya libende. Likambu wana elandisamaka na bilembo oyo :
Anaphylactic Choc anaphylactique esengaka ete moto a betama tonga ya adrenaline pona ko silisa kokosa ememaka. Mingi ba oyo bakweyaka na likamba ya choc, ba tonga na bango elangisamaka mingi mingi na yango. Soki moto atungisami na choc, esengeli ete ba pesa ye tonga wana na lombango makasi, epayi ya dokotolo to monganga moko ya ambulance.
Tanda mobeli mobimba na mabele mpe mokongo na ye evanda na se. Matisa makolo mwa mokie, fongola cravate to mpe bilamba elati po mwa mopepe elaka.
If Soki tango oliaka kosi esalaka yo allergie, okoki pe ko zwa allergie soki o lie crabe. Esalaka bongo po ete ba allergenes na bango bizalaka ya ko kokana. Soki likama ya lolenge wana esalemi, to bengi yango makambu etambolaka ngambo na ngambo.
Hay Bokono ya rhume de foins ezali owutaka na beteni ya ba fololo ebotaka na nzete, na ba nzete, to ba nzete ya makasa makasa kaka. Tango mususu bato ba beli rhume de foins soki ba leyi ba biloko misusu ba koki pe lisusu ko kweya na makama ya allergie.
Makambu etambolaka ngambo na ngambo. Yango esalemaka bongo tangu ba allergenes ezalaka na bo kokani. Elimboli oyo elandi eko tanda moko na moko ya ba makambu etambolaka ngambo na ngambo ko wuta na beteni ya ba fololo ebotaka na nzete na oyo ya bilei ya makasa. Ba makambu etambolaka ngambo na ngambo oyo bitangami awa ekomaki mingi mingi pe te. Ba makambu mususu ezali penza oyo ya bokeseni makasi.
Soki likama ya allergie ekomi : | Makambu kilikili oyo ekoki ko salema : |
Na beteni ya ba fololo ebotaka na ba nzete ya makasa makasa kaka. Ekeke ya fololo emibimisaka : sanza ya avril tee ya na kati kati ya sanza ya octobre, ekesanaka na lolenge ya matiti na matiti.. | Mbala, ble, tomate, nguba, sarrasin. |
Beteni ya ba fololo ebotaka na nzete ya armoise. Ekeke ya fololo emibimisaka : sanza ya aout. | Matiti pe ba epici ya bilanga ko landa lingomba ya ba Ombellifères (anis, cerfeuil, aneth, carvi, coriandre, panais, carotte, persil, céleri, fenouil). |
Beteni ya ba fololo ebotaka na nzete to bengi bouleau. Ekeke ya fololo: ko banda sanza ya avril te na oyo ya mai. | Mbuma ya lingomba ya Rosacées (frais, ndunda, abricot, pomme, pomme, mûre, framboise, cerise, nectarine, poire, pêche, prune, cassis). Ba mbuma lolenge ya lingomba ya ndika, mingi mingi oyo ezalaka mikie makasi. Carotte, céleri, mbala. |
Na beteni ya ba fololo ya nzete ya fléole des prés. Ekeke ya fololo : ko banda sanza ya mai te na oyo ya septembre.. | Mbala, pomme, carotte, céleri. |
Na ko bakisa ba makambu etambolaka ngambo na ngambo oyo etangami na likolo, ba makambu etambolaka ngambo na ngambo mikoki pe ko wuta na ba lolenge misusu ya ba allergies. Awa na se, to tandi na mwa mokuse :
Na cas ya allergie oyo ya ba | Makambu etambolaka ngambo na ngambo epayi na: |
Nieyi ya ba ndeke, masala ya ba ndeke | Mayi ya maki ya soso oyo ezanga langi |
Ndeke | Soso |
Ba puali ya ba Mbwa na ya ba niawu | Ngulu |
Ba niama mikie oyo ba batamaka na kati ya poussière ya ba ndako | Mbembe na Kosi oyo ya nzete ya vino |
Latex (mayi ya poso ya nzete ya hévéa) | Bitabe, savocat, châtaigne, melon, kiwi, sarrasin |
Inhaling Ko mela ba protéines oyo ewuti na ba nieyi ya ba ndeke tangu ba tiaka ba peto na ba ndako ya ndaku ya ndeke, ndakisa, ekoki ko komisa mutu hypersensible liboso ya ba protéine ya maki ya soso. Yango nde to bengi syndrome ya maki ya ndeke.
Esi bo timbela ke nzoto na bino ekotaka na mutungisi soki ekutani na bileyi misusu ? Toli to pesi bino ezali yako luka te na ndenge na bino moko ya ko salela to pe ko bwakisa ba bileyi. Ya malamu ezali ko kende ko kutana na monganga. Ye nde ako lobela yo soki likama na yo ezali allérgie to pe ezali intolerance et ako lakisa yo diététicien nini okende ko tala. Diététicien ako sala elongo na yo pona ko landela na misisa eloko ezo bota bilembo wana. Ye pe na ndenge na ye akoki ko pesa yo ba toli na ye po ete o yeba lolenge okoki ko mibatela na makama ya allergie. Ako pesa yo pe lisusu ba toli na lolenge nini okoki ko tia na mopanzi bileyi mususu na ndenge ete nzoto na yo ezanga ba nutriments misusu te.
Bana ba koki ko kweyela likama ya allergie soki moko ya ba boti na bango to mwana ya mukolo makasi na famille azali na allergie, ndeti bokono ya rhume des foins, asthme to allergie oyo ewutaka na bileyi. Pona ko batala bana na ba allergies, esengeli na bino bo sala makambo oyo :
Soki mwana na yo azalaka na allergie to pe azali intolérant na bileyi misusu, esengeli ete o ye yebisa molakisi na ye na kelasi :
Mibeko ya mikili ya poto na Europe ekwesela ba malewa nionso pona ete ba bomba likambo moko te na tina ya ba allergène nionso oyo bikoki ko mona na biloko ba lembeli to bileyi ba lambi. To tombeli yo o luka batu ya malewa pona ko betela bango lisolo ya allergie to mpe intolerance na yo, pona ete mbilinga mbilinga ekota te.
Monganga ya libota akoki ko sunga pona ko koma likolo ya lokasa ya mokanda passeport ya lopitalo oyo ya mikili ya poto ya Europe pena na bibongiseli oyo e sukumisaka yambo likama ekoma.