Cholestérol
Cholesterol eza nini?
Cholesterol eza mafuta oyo nzoto ya mutu esengaka pona ba kosala ba cellule na ba hormones. Cholesterol mingi esalamaka na foie. Quantité ndambu ekotaka na nzoto na nzela ya bileyi.
Cholesterol LDL na LHD
Makila ememaka cholesterol nako kangisa yango na ba proteines misusu. Proteines yango ba bengaka yango Lipoprotéine de haute densité (LHD) na Lipoprotéines de basse densité (LBD).
LBD ememaka cholesterol na makila na ba partie nioso ya nzoto, esika esengeli, par exemple pona kobongisa posa oyo ebebi. Soki cholesterol LBD eleki mingi ekoki kokangama na kati ya ba vaisseaux sanguins. Ekomaka misngi esika ba vaisseaux sanguins eza ya kobeba. Kobeba ya ba vaisseaux sanguins ekoki ko koma likolo ya komela cigarette, hypertension to ko kola. Plaque moko eko salema na kati ya vaisseaux sanguins. Vaisseaux sanguins eko konda mpe ekosala ete makila etambola lisusu malamu te. Ekoki komema crise cardiaque. Na ndenge oyo cholesterol ya LHD ememaka ba maladies cardiovasculaires. Cholesterol LBD ebengamaka mpe cholesterol ya mabe.
Makila kokangama na ba vaisseaux sanguins, eko sala ete makila etambola malamu te: |
LHD elongolaka cholesterol na makila pe ememaka yango na foie, esika eko kabwana. Na kolongola cholesterol, LHD ebatelaka nzoto na ba maladie cardiovasculaires. Kosangana ya LHD na cholesterol ebengami cholesterol LHD. Cholesterol LHD ebengami pe cholesterol ya malamu.
Cholesterol esalaka nini na santé ?
Soki niveau ya cholesterol eza likolo makasi mpe ration entre cholesterol LBD nad LHD eza malamu te, risque ya maladies cardiovasculaires eza makasi. Ratio ya mabé ematisaka lisusu risque wana makasi.
Cholesterol ezalaka na valeurs mibale ya important: Cholesterol total na ratio ya cholesterol. Pona bango mibale, soki eza likolo, risque pe ya liwa na maladie ya mutema eza likolo. Bayebaka soki maladie cardiovasculaires ezali kosalama na kotala ratio ya cholesterol. Nase toko talisa yo makambu oyo etali total ya cholesterol, ratio ya cholesterol, cause ya cholesterol koleka pe kisi nini ematisaka to ekitisaka cholesterol LBD.
Total ya cholesterol
Test ya makila ekolakisa niveau ya cholesterol na makila. Niveau ya cholesterol na makila ekoki ko bongwana makasi. Yango wana esengi kotala niveau ya cholesterol mingi.
Kotala ba resultats oyo ekoki kobima:
Total cholesterol value | Conclusion |
Nasé ya 5.0 | Normal |
entre 5.0 na 6.4 | Eza ya komata mukie |
entre 6.5 na 7.9 | Emati |
Likolo ya 8.0 | Emati makasi |
Ratio ya cholesterol na maladies cardiovasculaires
The ratio ya LBD na LHD ebengami ratio ya cholestero. Ratio na LBD ya makasi esalaka risque ya maladie cardiovasculaire. Ba calculaka ratio ya cholesterol na ko diviser total ya cholesterol (LBD + LHD) par LHD. Ratio il faut ezala nasé ya 5.
Causes cholesterol koleka
Foie normalement ebatelaka balance normal ya cholesterol. Quantité ya cholesterol oyo foie esalaka e dependaka na ndenge mutu azo vivre. Komela cigarette, kosala exercice te, pe kolia biloko eyondi na mafuta ekoki kobebisa balance wana pe kosala LBD cholesterol ebele.
Cholesterol ya komata ekoki pe kozala hereditaire. Ba cause misusu ya cholesterol ya likolo eza obesité, diablete ya type 2A high cholesterol level can also be hereditary. Other causes of high cholesterol are obesity, type 2 diabetes pe thyroïde lente.
Komata pe kokitya ya cholesterol LBD
Biloko ozolia ekoki komatisa to kokitisa cholesterol LBD. Cholesterol LBD mingi eza malamu te pona nzoto nayo, nayango esengeli kolia biloko oyo ezo kitisa yango. Diagrame oyo ezo lakisa biloko nini esengeli kolia (ekitisaka) pe oyo osengelikolia te (ematisaka).
Biloko | Cholesterol LBD |
Café (Kolamba café to cafe na cafetière) | Ematisaka |
DHA (Omega-3 graisse) | Ematisaka |
Maki | Ematisaka |
Acide gras Trans: Remplacement ya glucides,acides gras monoinsaturés to acides gras polyinsaturés par les acides gras trans | Ematisaka |
Remplacement ya ba protéines misusu pona soja na proteine ya soja | Ekitisaka |
Quaker | Ekitisaka |
Remplacer sukali na amidon | Ekitisaka |
Cereales | Ekitisaka |
Fruit | Ekitisaka |
Nguba | Ekitisaka |
legumes | Ekitisaka |
Soya | Ekitisaka |
Reremplacer beurre na margarine | Ekitisaka |
Remplacer ba acides gras saturés na acides gras insaturés | Ekitisaka |
Ail
Emonana ete ail ezalaka malamu pona niveau ya cholesterol. Kasi ba preuve eza mingi te.
Conseils pona kopekisa komata ya cholesterol
Kitisa risque ya komata ya cholesterol na:
- Kolia malamu kolandana na Disk of Five
- Kilo ya malamu
- Vie ya malamu na ba exercice ebele
- Stress mingi te
- Komela likaya te
Biloko ya kolia tangu cholesterol eza ya komata
Olingi kokitisa niveau ya cholesterol nayo pe ko kitisa risque ya ba maladies cardiovasculaires? Okoki kolanda ba conseils oyo yomoko. Tangu mususu pe esengelaka kozwa kisi epayi ya docteur.
Regle ya 5 tranches
Tangu ozolia kolandana na ‘Schijf van Vijf’ ozali kozwa soin nayo malamu, mpe tangu niveau ya cholesterol nayo eza likolo. ‘Schijf van Vijf’ liste ya biloko ya kolia ekitisaka cholesterol LBD, lokola cereal, nguba na legume. Excess ya LDb ekokangama na ba vaisseaux sanguins nayo.
Madesu na nguba
Disk of Five eza pe na biloko oyo eza na graisse saturé mingi te. Kolia biloko eza na graisse saturé mingi te eza malamu pona cholesterol nayo. Kolia biloko yango mingi te pe mbala mingi te. Kanisa ba snacks to misuni oyo eza na graisse saturé makasi.
Poid ya malamu
Soki oza na kilo koleka, kokitisa yango ekosunga kokitisa niveau ya cholesterol nayo. Mingi soki ozali na estomac munene. Na calculatrice na biso ya IMC okoki ko tala soki oza na kilo ya malamu. Soki oza munene makasi, kokitisa kilo nayo de 5% à 15% eko bongisa niveau ya cholesterol na makila nayo.
Remplacer graisse saturé na graisse nonsaturé
Graisse saturé ematisaka cholesterol LBD. Graisse saturé ezalaka na beurre pe ba margarines misusu. Graisse nonsaturé eza mabe mingi te pe ezalaka na ba mafuta misusu, margarine pe halvarine ya pot.
Salelaka biloko ya miliki ezali na graisse makasi te
Fromage, miliki pe biloko misusu esalemi na miliki ezalaka na graisse saturé, oyo ematisaka cholesterol LBD. Ata soki ezali malamu pona santé nayo. Nayango pona biloko ezali na graisse mukie, lokola fromage 20+ pe 30+, mozarella, lait demi-écrémé et écrémé.
Lia misuni mukie pe sangisa na mbisi, legume, maki an nguba
Pona niveau ya cholesterol ya malamu, tosengi ete okangama ata na moko par semaine:
- 1x par semaine legume, lokola madesu, mbwengi na petipois
- 1x par semaine mbisi, lokola saumon, hareng na maquereau
- Ndambu ya nguba sans 300g ya musuni (ngombe to ngulu)
- 2 to 3 maki (3 to 4 pona ba vegetariens)
Mela café mukie
Café ematisaka cholesterol LBD. Kotokisa café (soki otie mayi mbala moko na café ya poussiere) na café osali na cafetière eza malamu te pona komela. Café normal eza bien.
Lia fibre mingi
lia 30 à 40 grammes ya fibre mikolo nioso. Fibre ekitisaka pe cholesterol LBD, mingi fibre ewuti na cereales pe ba fruits. Na yango pona mingi ba produit ya fibre neti cereales pe lia fruit 2 fois par jour.
Sala exercice mingi
Kosala ba exercice mingi ekitisaka risque ya maladie cardiovasculaires. Kofanda esika mongo tango molayi ematisaka risque.
Esengeli na mikolo basala exercice au moins 2 heures et demie par semaine pe basala exercice ekomisaka mikuwa na ba muscles makasi au moins 2 fois par semaine. Soki oleki 65 ans esengeli pe osala exercice deux fois par semaine. Olingi koyeba eloko nini okoki kosala pona kokomisa mikuwa pe muscles nayo makasi? To exercice ya balance eza nini? Tala ba exercice na site allesoversport.nl.
Komela cigarette te
Komela cigarette te to kotika ekitisaka risque ya maladie cardiovasculaires. Olingi kotika komela cigarette? Zwa rendez-vous na docteur nayo. iovascular disease Do you want to stop smoking? Make an appointment with your doctor.
Mbongo
Oza na cholesterol ya komata? Assurance santé nayo ekozongisela yo mbongo ya docteur atalaka makambu ya kolia.