Coeliakie (glutenintolerantie) Congolees

HYPERSENSIBILITE NA BILEI (ALLERGIE NA INTOLERANCE)

Hypersensibilite na bilei ezali eloko nini ?

Hypersensibilite ya bilei elengi ko likambo oyo etali allergie pe lolenge ya bo boyi bilei.

Allergie na bilei ezali nini ?

Soki ozali na allergie na bilei, biteni ya kati ya nzoto na yo oyo ebundisaka bokono eko banda ko telemela biloko mususu na elei na yo. Biteni ya kati ya nzoto na yo oyo ebundisaka bokono ebotaka ba anticorps oyo ekendaka ko telemela ba proteine oyo evandi na kati ya bilei. Ba proteine oyo ezali na makoki ya bota ba reactions allergiques ba bengi yango na kombo ya « allergenes ». Ba proteine oyo ya miliki to pe oyo ya ko landisa lingomba ya ndika nde bazali ba allergenes oyo ba yebani mwa mingi. .

Intolerance ezali eloko nini ?

Nzoto ekoki pe ko sukuma moke liboso ya bilei misusu, kasi elakisi te ke ezali na allergie. Eloko wana toko benga yango kaka hypersensibilite ya bilei. Ezali na yango mwa eboyeli. Eboyeli ya “lactose” na nzoto ezali ndakisa moko ya intolerance. Mabumu ya batu ebele ekokaka ko lamba penza malamu te « lactose ». Biloko oyo bandisaka bilembo ya intolerance to bengaki yango ba declencheurs. Ba declencheurs ebotamaka yango moko na bo pete na kati ya biloko ndeti oyo to bengi na kombo ya lactose. Ba conservateurs ndeti ba sulfite ezali pe ba declencheurs.

Pona ko yeba mingi na tina ya
Intolerance ya lactose
Bokona ya Coeliac

Ba allergies na ba intolerance ya bilei ya mingi emilakisaka mingi mingi na lolenge nini ?

Hypersensibilite na bilei, allergie ya bilei pe intolerance ya bilei ekomelaka batu mikolo kobanda na 1% te na 4% et epayi ya bani mikie ko banda na 4 te na 6%. Bana mikie oyo nzoto na bango esukamaka soki ba meli miliki ya ngombe ba kokaka ko longa yango tango bazali nanu na tango na bango ya bomwana ya mukie makasi.

Likambo oyo ememaka hypersensibilite ya bilei

Wuta na makila ya libota na bino, bokoki ko zala batu oyo ba nzoto ebongisama deja pona ko kueya na hypersensibilite ya bilei. Soki ozo mimona na kati ya batu wana, nzoto na yo ekoki ko bota allergie na intolerance na bo pete. Makila ya libota na bino elingi ko lakisa ete moboti to mpe ndeko na yo moko oyo atungisamaka na likambo ya allergie na intolerance na ndenge ya ko sakana te. Pona ko bimisa ete moto akoki ko tungisama na hypersensibilite na bilei ezalaka likambo ya pete te. Bilembo na ngo ekesanaka epayi ya moto na moto. Toko bakisa boye, mitungisi ekoki pe ko wuta na makambu mususu kilikili.

Ba Milelo

Hypersensibilite ya bilei ezali na bilembo nini (allergie mpe intolerance) ? Ba bilembo ya hypersensibilite ya bilei ekesanaka makasi penza. Makama ekomelaka mingi mingi na poso, na ko pema, na estomac na mitshopo misusu. Kasi ba ndenge ya mitungisi nionso oyo ekoki pe ko wuta na ba makambo mosusu. Ezali na litomba makasi ete monganga ya libota atia na pembeni ba lolenge nionso misu oyo makambu elekelaka. Ndakisa ya ba lolenge allergie na intolerance ememaka bo tungisi, to tangi

  • Likama moko ya allergie eko banda na monoko, na mongongo, ndeti ko vimba, ba mikusa, biloko ya langi ndeti pota ko botama na kati pe pembeni pembeni na monoko. Makambu wana ebandaka ko milakisi kaka na ngonga mukie sima ete osilisa ko lia mbuma ya nzete, makasi, biloko na lolenge ya ndika, to mpe ba niama ya mikie mikie lolenge ya kosi.
  • Urticaria (Urticaire (Urticaire) Mpe Na Œdeme De Quincke. Urticaire ezala bokona ya poso ebimisaka ba mbuma, esala mukusa ya makasi et na ba ngonga mususu esalaka pe pasi. Lolenge moko ya bokono urticaire ebengami œdeme de quincke, yango esalaka ete mayi ebele ya nzoto esanga na esika moko ya nzoto.

Choc anaphylactique

Anaphylactic Choc anaphylactique ezali likambu moko ekoki pe ko memela mutu liwa na ko bota kokoso ya allergie na nzoto na ndenge ya makasi penza. Kokosa ya allergie wana owuta na mwa biloko boye ndeti nguba, wangila, kasi ba kisi to mpe soki musua ya nzoyi ekoki pe ko bandisa choc anaphylactique. Ekomaka penza te bilei moko oyo oliaka deja mikolo nionso e banda na mbala moko ko sala yo ba choc anaphylactique.

Risque ya choc anaphylactique

Anaphylactic Choc anaphylactique ememaka na liwa soki ba landeli yango na lombango te. Bilembo ya choc anaphylactique emibimisaka na ba minutes et tangu mususu ekoki ko tikala ba ngonga molayi. Soki ba salisi yango malamu te, choc mususu ekoki lisusu ko mizongisa na sima ya 6 heures to 8 heures. Tango choc anaphylactique ekomaka, ndenge motema ebeta ekoki komi lembisa makasi tee emema moto amiyeba lisusu te. Crise ya asthme mpe ekoki ko mi landisama na mbala moko. Elembo ya liboso ya choc esalaka ndeti biloko moko ezo tshuba tshuba nzoto, mukusa to mpe oko yoka na monoko ndeti na gout ya libende. Likambu wana elandisamaka na bilembo oyo :

  • Urticaire (urticaire)
  • Oko yoka nzoto moto moto, motoki makasi
  • KO sanza makasi
  • Eteni ya nzoto ko kangama, pulupulu
  • Ko vimba ya munoko pe ya mongongo
  • Bokawuki ya mayi na nzoto swellings in the mouth and throat

Anaphylactic Choc anaphylactique esengaka ete moto a betama tonga ya adrenaline pona ko silisa kokosa ememaka. Mingi ba oyo bakweyaka na likamba ya choc, ba tonga na bango elangisamaka mingi mingi na yango. Soki moto atungisami na choc, esengeli ete ba pesa ye tonga wana na lombango makasi, epayi ya dokotolo to monganga moko ya ambulance.

Afbeelding met persoon, binnen, drinken Automatisch gegenereerde beschrijving

Tanda mobeli mobimba na mabele mpe mokongo na ye evanda na se. Matisa makolo mwa mokie, fongola cravate to mpe bilamba elati po mwa mopepe elaka.

Makambu etambolaka ngambo na ngambo oyo ewutaka na ba biloko ya ko lia ba bengi denree alimentaire

If Soki tango oliaka kosi esalaka yo allergie, okoki pe ko zwa allergie soki o lie crabe. Esalaka bongo po ete ba allergenes na bango bizalaka ya ko kokana. Soki likama ya lolenge wana esalemi, to bengi yango makambu etambolaka ngambo na ngambo.

Makambu etambolaka ngambo na ngambo na bokona ya rhume de foins.

Hay Bokono ya rhume de foins ezali owutaka na beteni ya ba fololo ebotaka na nzete, na ba nzete, to ba nzete ya makasa makasa kaka. Tango mususu bato ba beli rhume de foins soki ba leyi ba biloko misusu ba koki pe lisusu ko kweya na makama ya allergie.

Makambu etambolaka ngambo na ngambo. Yango esalemaka bongo tangu ba allergenes ezalaka na bo kokani. Elimboli oyo elandi eko tanda moko na moko ya ba makambu etambolaka ngambo na ngambo ko wuta na beteni ya ba fololo ebotaka na nzete na oyo ya bilei ya makasa. Ba makambu etambolaka ngambo na ngambo oyo bitangami awa ekomaki mingi mingi pe te. Ba makambu mususu ezali penza oyo ya bokeseni makasi.

 Soki likama ya allergie ekomi : Makambu kilikili oyo ekoki ko salema :
Na beteni ya ba fololo ebotaka na ba nzete ya makasa makasa kaka. Ekeke ya fololo emibimisaka : sanza ya avril tee ya na kati kati ya sanza ya octobre, ekesanaka na lolenge ya matiti na matiti..Mbala, ble, tomate, nguba, sarrasin.
Beteni ya ba fololo ebotaka na nzete ya armoise. Ekeke ya fololo emibimisaka : sanza ya aout.Matiti pe ba epici ya bilanga ko landa lingomba ya ba Ombellifères (anis, cerfeuil, aneth, carvi, coriandre, panais, carotte, persil, céleri, fenouil).
Beteni ya ba fololo ebotaka na nzete to bengi bouleau. Ekeke ya fololo: ko banda sanza ya avril te na oyo ya mai.Mbuma ya lingomba ya Rosacées (frais, ndunda, abricot, pomme, pomme, mûre, framboise, cerise, nectarine, poire, pêche, prune, cassis). Ba mbuma lolenge ya lingomba ya ndika, mingi mingi oyo ezalaka mikie makasi. Carotte, céleri, mbala.
Na beteni ya ba fololo ya nzete ya fléole des prés. Ekeke ya fololo : ko banda sanza ya mai te na oyo ya septembre..Mbala, pomme, carotte, céleri.

Makambu etambolaka ngambo na ngambo na kati ya ba allergies misusu

Na ko bakisa ba makambu etambolaka ngambo na ngambo oyo etangami na likolo, ba makambu etambolaka ngambo na ngambo mikoki pe ko wuta na ba lolenge misusu ya ba allergies. Awa na se, to tandi na mwa mokuse :

 Na cas ya allergie oyo ya ba Makambu etambolaka ngambo na ngambo epayi na:
Nieyi ya ba ndeke, masala ya ba ndekeMayi ya maki ya soso oyo ezanga langi
NdekeSoso
Ba puali ya ba Mbwa na ya ba niawuNgulu
Ba niama mikie oyo ba batamaka na kati ya poussière ya ba ndakoMbembe na Kosi oyo ya nzete ya vino
Latex (mayi ya poso ya nzete ya hévéa)Bitabe, savocat, châtaigne, melon, kiwi, sarrasin

Inhaling Ko mela ba protéines oyo ewuti na ba nieyi ya ba ndeke tangu ba tiaka ba peto na ba ndako ya ndaku ya ndeke, ndakisa, ekoki ko komisa mutu hypersensible liboso ya ba protéine ya maki ya soso. Yango nde to bengi syndrome ya maki ya ndeke.

Toli etali elieli

Esi bo timbela ke nzoto na bino ekotaka na mutungisi soki ekutani na bileyi misusu ? Toli to pesi bino ezali yako luka te na ndenge na bino moko ya ko salela to pe ko bwakisa ba bileyi. Ya malamu ezali ko kende ko kutana na monganga. Ye nde ako lobela yo soki likama na yo ezali allérgie to pe ezali intolerance et ako lakisa yo diététicien nini okende ko tala. Diététicien ako sala elongo na yo pona ko landela na misisa eloko ezo bota bilembo wana. Ye pe na ndenge na ye akoki ko pesa yo ba toli na ye po ete o yeba lolenge okoki ko mibatela na makama ya allergie. Ako pesa yo pe lisusu ba toli na lolenge nini okoki ko tia na mopanzi bileyi mususu na ndenge ete nzoto na yo ezanga ba nutriments misusu te.

Ko kitisa risque ya allergie epayi ya bana

Bana ba koki ko kweyela likama ya allergie soki moko ya ba boti na bango to mwana ya mukolo makasi na famille azali na allergie, ndeti bokono ya rhume des foins, asthme to allergie oyo ewutaka na bileyi. Pona ko batala bana na ba allergies, esengeli na bino bo sala makambo oyo :

  • Melisa mwana mabele, ko misa ye te na sanza 6.

Afbeelding met persoon, vrouw, binnen Automatisch gegenereerde beschrijving

  • Soki ko melisa mabele esi malamu te, miliki to bengi lait maternisé ekoki pe zala nzela mususu ya malamu pe kitoko ko leka. Soki mutu akoti na mi lesa ko lia na nzela oyo ya bo pete na ndenge nzambe akelela bileyi na mokili, yango nde te eko pekisa ete akweya na likama ya allergie. To pesi toli ete moto akoki pe ko lia ba bileyi oyo eleki na ba machine kili kili oyo ekomi hydrolisé makasi.
  • Bandaka ko pesa mwa lutu ya miliki ya libele to pe oyo ya basali na nzela ya ba machine mokie ndambu ndambu na monoko ya bebe na yo oyo azali ko banda na sanza 4 te na sanza 6
  • Ko banda na sanza 4, okoki ko banda ko pesaka mwana na yo mwa lutu ya ba mbuma ya nzete pe mwa ba ndunda. Tangu mwana na yo ako mesana na eleyi wana, bo bakisa na lombango mwamba nguba to pe maki na bileyi wana. Sala makasi ete o liesa mwana na yo ya bebe mwamba nguba pe maki yambo été akomi na sanza 8.

Afbeelding met persoon Automatisch gegenereerde beschrijving

  • Bebe na yo azuami na bokono ya Eczéma to pe allergie alimentaire ? Sima, banda ko pesa ye mwamba ya nguba pe maki yambo akota sanza 6. Lakana mokolo na monganga po bo solola na tina na lolenge ya eleyi wana.
  • Ba vitamines D na K na tangu ya ko melisa mabe mpe vitamin D oyo ya biloko ba lambi na ba machine nionso wana bikoki na ngo makasi. Ko bakisa te ba vitamine mususu na likolo na wana.

Toli pona na kelasi

Soki mwana na yo azalaka na allergie to pe azali intolérant na bileyi misusu, esengeli ete o ye yebisa molakisi na ye na kelasi :

  • Lakisa malamu bileyi nini mwana na yo akoki ko lia. Okoki yo moko pe ko lamba mwa biloko moke yako pesa molaki na esika ete mwana na yo a lia ba bombons oyo ba salelaka bana mikie
  • Soki pe esengeli, solaka na ba lakisi, bo sala pe ata « plan d’urgence » elongo na monganga oyo a landelaka makambu na bino
  • Sala makasi yako betisa na makomi na likolo ya lokasa makambu nionso oyo esengeli na pona kelasi. Makomi na yo esengeli epesa posa, ndakisa, tia photo ya mwana na yo likolo ya papier na ba langi na ngo nionso. Sala ete makomi na yo ezala mokuse mpe koma numéro na se ya ba ngambo nionso ya lokasa po ete moto nionso ako tanga a benga na pete soki a zali na motuna. Koma pe numéro ya téléphone ya monganga ya libota
  • Tia na mokusu ba makambu nionso oyo bo yokana na ba konzi ya kelasi
  • Soki pe esengeli, sala makasi tonga ya adrénaline ezanga te na école et landelaka na bokebi mokoli nini eko koma ya ko beba. Ata landeli makasi ba lolenge nionso oyo ya ko mibatela, ya malamu eko zala kaka ko beta tonga ya adrenaline na kelasi. Ekoki pe ko senga ete molakisi a yeba ndenge nini ko beta tonga.

Ko lia na malewa na allergie to mpe intolerance pembeni

Mibeko ya mikili ya poto na Europe ekwesela ba malewa nionso pona ete ba bomba likambo moko te na tina ya ba allergène nionso oyo bikoki ko mona na biloko ba lembeli to bileyi ba lambi. To tombeli yo o luka batu ya malewa pona ko betela bango lisolo ya allergie to mpe intolerance na yo, pona ete mbilinga mbilinga ekota te.

Mobembo ya bopemi na allergie to mpe intolerance pembeni

  • Mbala mususu ekomaka ke ba biloko misusu emonanaka te na ba mboka ya ba paya. Soki ozali na mwana oyo o melisaka kaka miliki oyo ya ba machine, zala mayele pona ko mema ebele ya miliki oyo ewutaka pays. Ba mboka misusu bazala na ba mibeko na bango na makambu oyo etali ko kotisa na kati ya mboka na bango ba biloko ya ko lia kowuta ba mboka ya ba paya. Soki o koti na site web ya ANWB Okokuta masolo na mozindo na ngo nionso ko landisa mboka moko na moko.
  • Esangeli ko mema glossaire ya ba photo ya biloko ya ko lia te mpe oyo makomi na ngo ba balola déjà na munoko mususu
  • Soki o keyi mobembo na ba sungi mobembo, esengeli o betela ye lisolo ya ba allergie na nzoto na yo. Kumba pe mwa libenga ya ba kisi ya ko sunga soki likama ya mbangu mbangu ekweyi mpe o bakisi pe na bileyi misusu, pona ko mikebisi soki retard ekomeli bino na nzela to pe soki lolenge ya elieli na yo ebetami kara.
  • Na kati na mpepo, yebisa compagnie ya mpepo wana ete ozalaka na allergie. Tangu okoti na kati ya mpepo, okoki ko lobela ba hotesse de l’air ndenge nini ba sala pona ko batela pe ko tia moto na biloko.
  • Soki ozo vanda na hotel, solola déjà na ba Sali ya hotel yambo ya makambu nionso
  • Soki o salelaka ba kisi ya ko mela, panza yango na mabenga ebele, po ata soki ndambo ya mikumba na yo esili ko bunga, oko tikala na ba kisi ndambu.
  • Soki o keyi mobembo, zala na passeport na yo ya lopitalo. Na kati ya passeport na yo ya lopitalo, ko leka makomi ya makambo oyo etali bo yebi ya bomoto na yo moko, esengeli ete obakisa pe makomi oyo etali lolenge ya bokono na yo, makambu oyo esengeli na yo te o simba, ba bilembo pe makambi eko limbola lolenge nini bato bakoki ko solola mbango na monganga na yo.
  • Soki ba mikakatano ya allergie ezomi lakisa ete eko zala makasi tee na esika ekoki ko tinda mutu a miyeba lisusu te, médaille d’Alarme Croix Blanche ekoki ko lakisa na lombonga epayi monganga oyo eko sengela ete libiki eleka na nzela na ye na lombango mingi. Libenga na bango oyo ebangi balise ezali na makomi nionso oyo esengeli pona monganga epayi wapi libiki esengeli eleka na nzela na ye na lombango mingi.

Monganga ya libota akoki ko sunga pona ko koma likolo ya lokasa ya mokanda passeport ya lopitalo oyo ya mikili ya poto ya Europe pena na bibongiseli oyo e sukumisaka yambo likama ekoma.

QR code naar deze pagina

QR Code
nl_NLDutch