Diabetes type 1 (suikerziekte) Congolees

Diabete ya type 1

Diabete ya type 1 eza nini?

Diabete ya type 1 eza bokono moko oyo ba anticorps ebundisaka misusu, ezuaka tango mingi pe ebikaka te. Bokono epanzanaka na tango mukiepe etalisamaka naki bolenge.

Kombo: diabete to bokono ewuti na diabete?

Kombo eyebana ya mobimba ya diabete eza diabete ya sukali. Boyokaka mingi kombo diabete. Kombo diabete ekoki ko mema na makanisi ya mabe. neti, moto oyo aza na diabete akoki komela sukali te. Nde yango tosepelak kobenga yango diabete. longola diabete ya type 1, diabete ya type 2 pe ezalaka.

Batu boni bazo bela diabete ya type 1?

Kolela 1,1 million ya ba Hollande bazo bela diabete. Pene ya 9% batu ya diabete eza ya type 1. Batu mingi belaka diabete ya type 1 na kibo muana , kasi bakolo pe kobela yango. Bana mingi oyo bazo bela diabete eza diabete ya type 1 , ata ko diabete ya type 2 ezo zua pe bana mikolo oyo. Mingi ya ba kolo bazo bela diabete ya type 2.

ndenge nini diabete ya type 1 eyaka?

Soki omeli ba glucide misusu (ba amidon na sukali), nzoto ebongoli yango na sukali. Sukali ekoti na makila. Wana tobengi yango glycemie. Na nzela ya makila, sukali ekoti na kati ya ba selile ya nzoto. Nde sukali ezo pesa makasi na nzoto. Toza nango bosenga pona ko pema, koningana pe kobeta ya motema.

Ba selile eza komela sukali ya makila na lisungu ya hormone ya insuline. Hormone yanga esalemaka na pancreas. ebongi, nzoto aluka ayeba soki insuline eza yako koka pona kolekisa glycemie na ba selile. Insuline esalaka neti fongola: efungolaka ba ekuke ya ba selile ya nzoto pona sukali ya makila ekota.

Diabete ya type 1 eyaka soki pancreas ezo sala lisusu insuline te. Ba selile ya pancreas oyo esalaka insuline ebomami na sisteme oyo ebundaka ya nzoto. Yango nde babengaka reaction auto-immune. Diabete ya type 1 babengaka yango pe bokono oyo emibundisaka. Epayi ya batu baza na diabete ya type 1, sukali ekoki te kokota na selile pe kotikala na makila. Glycemie eza komata makasi .

Glycemie elakisi nini?

Talo ya glycemie eza koyeba quantite ya sukali oyo eza na makila. Koyeba glycemie ezo bongisama na ba hormone ya insuline pe ya glucagon. Insuline ye nde akangaka sukali ya makila na selile. Glucagon afungolaka sukali ya makila na selile. Musala oyo esalemaka pona kobatela glycemie na esika malamu . Pona batu oyo na nzoto malamu, lolenge ya bien, glycemie ezali na 4 ti 8.

Diabete ya type 1, lokola insuline eza te pona kokotisa sukali na ba selile, ekoki komata koleka 8. ba selile ekoki pe kozua sukali. yango, glycemie ekoki pe kozonga na esika nango. kasi batu ya diabete ya type 1 eza pasi bazala na glycemie malamu. Eza po kantité ya insuline eza matata po ebonga na kantité oyo mutu azolia . Ba makambu mosusu oyo ematisaka glycemie, neti bobela, komitungisa, kosala ngalasisi na alcool.

Tangu nini okomi na diabte?

Motu oyo aza na diabete soki talo ya glycemie eza:

  • 7 to koleka oza na mindondo te (kolia te komela te longola kaka nasima ya ngonga 8).
  • 11,1 to koleka ngonga 2 na sima ya kolia.

Balobaka ebandeli ya diabete soki ba valere ya makila ezala :

  • Na kati ya 6,1 na 7 soki alie te pe ameli te.
  • Na kati ya 7,8 na 11,0 sima ya kolia na ngonga 2.

Talo ya glycemie eza malamu :

  • soki nanu olie te eza 6,0 mmol/l to na se.
  • Sima kolia na ngonga 2 eza na se 7,8 mmol/l.

Ba tina ya diabete ya type 1?

Eza na ba tina ya diabete ya type 1 oyo eyebani malamu te. Eza na ebongiseli mosusu oyo batikela yo na baboti esala mosala, kasi bisika tofandi pe bilei. Eza pe na ba bilembo oyo eza lakisa ba bebe oyo bamelisaki mabele baza na likama ya kobela diabete ba mbula ya sima.

Ba effet ya diabete na nzoto

Bilembo ya hyper (glycemie komata makasi)

Batu ya diabete ya type 1 bakoki kozala na glycemie ya komata makasi. Yango nde babengaka hyperglycemie to ‘hyper’ na mokuse. Hyper ebisaka makambu ebele, neti kolemba na koyoka pasi te, kozala na kanda, posa ya mayi, koza posa ya kolia pe nzela, kosuba mingi, komona molili, ba posa ya kosanza to kosanza. soki hyper ebiki, bilembo elimwaka moki. Glycemie ya komata na tango molayi ebebisaka misisa ya makila. Yango wana batu ya diabete baza na likama makasi yako bela bokono ya motema. Ba mindondo misusu ekoki koya eza ba pota ya ba reins, likola ya diabete pe miso molili.

Bilembo ya hypo (glycemie ekiti)

Soki glycemie na yo ekiti na 3,5 , ozo sala hypo. Bilembo eza kozanga esengo (dysphorie), ba kolenga, ba mitoki, motema kobeta mbangu, kobaye pe kozua kanda moki. Soki glycemie ekiti makasi, mutu akokweya pe kobungisa makanisi. Na ndenge ya makasi, yango ekoki komema ba pota na bongo ya libela to liwa. Eza po ete ba selile ya bongo eza sukali mukie pe “ekweyi”. Esengeli kolia to komela eloko moko ya sukali na sima ya hypo.

Ndenge nini koyeba hypo?

Okoki koyeba hypo na:

  • kolenga
  • kotoka
  • motema kobeta mbangu
  • kobaye
  • kozala na kanda
  • kobungisa makanisi (na ndenge ya mabe)

Obela diabete te , kasi osalaka hypoglycemie mbala mingi? Tosengi na yo okende komona monganga.

Ba effet ya tango molayi na nzoto

Na tango molayi, hyperglycemie (elingi koloba glycemie ya komata makasi) ekoki komema kobeba ya misu, ba reins pe na misisa, na likama ya bokono ya cecite, bokono ya ba reins, kokata lokolo (ewuyi na diabete ya mabe makasi). koleka, likama ya bokono ya motema eza penza makasi epayi ya batu ya diabete. Ba mindondo ezo wuta na ba pota ya poso pona kozala tango molayi na sukali.

Ba toli pona bilei

Eza na eloko moko te oyo ezo lakisa ke ba bilei mosusu ekoki kozelisa to batela bokono ya diabete ya type 1. Nde na yango , okoki kokitisa likama ya bokono ya motema na kolia bilei malamu.

Ba kisi pe bilei

Afbeelding met persoon, accessoire Automatisch gegenereerde beschrijving

Batu ya diabete ya type 1 bami betaka tonga ya insuline nazela ya tonga to pompi ya insiline oyo ekoki kobomisa insuline na ndenge ya bilei olie (bolus). Na emekeli ya glycemie. Bakoki kotala bango moko glycemie. Babongisa quantite ya insuline na quantite ya ba glucide (amidon pe sukali) tango nionso soki olie. Soki beta insuline na quantite moko mukolo nionso, kolia ba glucide pe ezala ndenge moko na ba ngonga moko mukolo nionso. Ba ngonga ya kozua insuline ndenge olingi epesaka bokeseni makasi ya quantite ya ba glucide yako kolia na bilei.

Bilei ya diabete ya type 1

Bilei eza na nguya lokilo ya glycemie. Pe oyo moto aliaka esimbaka nzoto na ye, neti motema pe ba misisa na ye. Pona batu ya diabete ya type 1, na batu nionso, eza litomba ya kolia bilei malamu.

Ba toli ya bilei pona batu ya diabete ya type 1 etali nanu kokamba glycemie pe kobatela motema pe ba misisa, ezo kitisa likama ya ba mindondo.monganga ya bilei aza mutu malamu pona kosunga yo.

QR code naar deze pagina

QR Code
nl_NLDutch