Diabète ya type 2 bokono ya métabolisme . Eza ba bokono oyo ewutaka na ba troubles ya métabolisme. Batu oyo bazo bela diabète ya type 2 basalaka insuline mingi te to insuline oyo basalaka ezalaka makasi po insuline eza sala lisusu eloko te na nzoto na bango. Insuline eza hormone oyo ya litomba mingi pona ko maintenir malamu. Kombo mususu ya glycemie eza sukali na makila.
Insuline eza litomba pona kokotisa sukali na ba cellules. Batu ya diabète, sukali mukie nde ekotaka na ba cellules pe mingi etikala na makila. Yango wana sukali eza yako mata makasi. Ba reins ebimisaka ndambu ya sukala na masuba.
Kombo ya mobimba ya diabète eza diabète ya sukali. Mbala mingi boyokaka kombo ya diabètes. Komba diabète ememaka na ba conclusions ya mabe. Neti mutu ya bokono ya diabète akoki kolia sukali te.
Diabète ya type 2 babengaka yango pe diabète ya mbula, kasi bilenge pe bakoki kobela yango. Yango komba diabète ya mbula ebongi na yango te.
Sima ya diabète ya type 2, diabète ya type 1 pe ezalaka. Ba diabètes ebele misusu ezali, kasi esengaka traitement nango.
Na 2019, ezalaki na batu 1,1 million na Hollande oyo bazalaki na bokono ya diabète. Ya ba mbula nionso, mibala nde babela diabète mingi ke basi. Pene ya 90 % ya batu baza na diabète eza ya type 2. Nombre ya batu ya diabète ya type ezo mata mingi. Eza na batu mususu baza na diabète kasi bayebi nanu te . Toyebi ye soki baza boni. Yango nde ememaka mikakatano po bayaka koyeba na sima makasi . Pe ba complications ekoki koya, kasi tokoki ko eviter yango soki tolandali bokono moki.
Soki olie bilei ya amidon na sukali, nzoto ebongoli yango na glucose. Glucose ekendaka na makila. Wana tobengakango glucose ya makila to sukali na makila . Na nzela ya makila, glucose ekotaka na ba cellules ya nzoto. Yango epesaka yo energie, oyo esengeli na yo pona kopema, ko ningana pe motema ebetaka.
Ba cellules emelaka sukali ya makila na lisungi ya hormone insuline. Diabète ya type 2 ebandaka soki ba cellules ya nzoto ezo koka lisusu komela insuline te. Yango nde okomona insuline ezo sala eloko te. Insuline ezo sala eloko te po ba cellules na yo ezo mela sukali mukie. Na tango moko, nzoto na yo ezo bimisa insuline mukie pe ba cellules ezo mela sukali mukie.
Diabète ya type 2 ebimisaka ba bokono lokola kolemba, posa ya mayi, munoko kokauka, ba bota oyo ekaukakaka malamu te, pema mukuse, posa masuba mingi pe na ba infections (neti vessie kovimbe). soki omeli kisi, ba bokono nionso wana elimwaka moki.
Na ebandeli, ba bilembo ya diabète ya type 2 emonanaka penza te to te. Na yango, batu bakoki kozala na bokono mbula mingi yambo bayeba. Soki sukali ya makila,etikali ya komata tangu molayi, ba misisa ebebaka. Na yango, batu ya diabète babela mingi bokono ya motema. Ba mukakatano misusu ekoki koya na ba pota ya ba reins, lokolo ya diabète pe misu molili.
Likama ya kobela diabète ya type 2 ezo na ba nzela ebele. Likama ya makasi pona kobela bokono oyo eza:
Na kolia malamu, batu bakoki kokitisa likama ya diabète ya type 2. liboso nanu, kobatela kilo ya nzoto. Ba bilei mususu ekitisaka to ematisaka penza likama ya diabète ya type 2.
Ba bilei oyo ematisala likama ya diabète ya type 2:
Ba bilei oyo ekitisaka likama ya diabète ya type 2 :
Ba bilei oyo ematisaka pe ekitisaka na mbala moko likama ya diabète ya type 2:
Batu oyo baza na diabète ya type 2 te bakitisa likama yakozua bokono soki babateli to bamatisi poids santé. Kokitisa ba kilos eza eloko ya malamu. Ba toli pona komibatela na diabète ya type 2:
Na momesano, ba kisi eza penza motuya pona kobikisa, neti insuline to metformine. Ba kisi pe bilei oyo ebongi moko pona mosusu. Lolenge ya malamu pona kobikisa daibète ya type 2 eza kokokana te pona mutu na mutu. Munganga to munganga ya bilei bazala kaka na liboso. Ba bongisaka toli pona makambu moko na moko.
Tangu mosusu, soki otangi ke ba siplema oyo eza neti, na vitamine D, na vitamine C, fer, na chrome, na cuivre, na zinc, na magnésium, na tangawisi, na ayi to na cannelle eza malamu pona batu baza na diabète. Soki kokakatana ezali na likambo oyo. Soki kozanga emonani te, to soki likama makasi ya kozanga, komela ba siplema ebongi te. Oyo esalemaka pe ndenge moko pona ba siplema oyo eza na tangawisi, na ayi pe na cannelle.