Hartziekten en hoge bloeddruk Congolees

Bokono ya cardiovasculaire

Bokono ya cardiovasculaire eza nini

Bokono ya cardiovascualire eza kombo moko pona ba bokono ebele ya motema to ba misisa ya makila. Bokono ya cardiovascualaire eza na tina ya ba kufa mingi na Hollande.

Tina ya bokono ya cardiovascilaire

Kokonda ya ba misisa nde eza tina ya ba mindondo ya cardiovasculaire. Kotongama ya ba misisa ebandaka na mbula ya mukie . Na yango, ezuaka ba mbula pona ba mindondo ya cardiovasculairev ebanda. Na tina nde ba nzela ekangamaka (atherosclerose), ba misisa ya makila, neti, ya lokolo na yo ekoki kokoma makasi. Na yango, makila ekoki kotambola malamu na ba misisa. Na yango, oxygene na biteni ya nzoto pe ba misisa ekomi mukie.

Batu boni baza na bokono ya cardiovasculaire?

Ba bokono ya cardiovasculaire oyo eza mingi eza ba bokono ya coronarien pe ba likama ya misisa ya bongo (AVC). Na 2016, bazo banza bato 739.800 bazalaki na bokono ya coronarien pe 451.900 na AVC.

Ba effect na nzoto

kokufa

Na sima cancer, ba bokono ya cardiovasculaire ezo boma mingi na Hollande. Ba bokono ya cardiovasculaire eza tina ya 30% ya kokufa ya batu na Hollande. Wana etali 40.000 batu mbula, ekabolami ndenge moko kati na mibali pe basi. Koleka 85% ya liwa eza pona bokono ya cardiovasculaire etali batu ya mbula 65 pe komata.

Uta ba mbula 1970, mituya ba batu oyo bazo kufa na ba bokono ya cardiovasculaire ekiti. Yanga eza pona mituya ya bameli makaya ekiti makasi, kolongola ba matufa ebele na bilei na mbula 1990 pe batu bakomi kotia misu na bilei bazo lia po ezala malamu. Kokolisa mayele ya kisi pona bokono ya cardiovasculaire, neti ba kisi ya anti cholesterol pe ba anti hypertenseurs, pe ba lolenge ya kosalisa ya malamu, neti angioplastie na sima ya crise ya motema, esalaka musala munene.

Ba nzela ya likama

Ba bolukiluki ezo talisa ba nzela ya likama pona ba bokono ya cardiovasculaire eza oyo:

  • Komata makasi et ya mabe ya cholesterol pe/to ba mafuta na makila. Eza nzela ya likama ya bilei ya litomba mingi. kokokana ya cholesterol LDL pe cholesterol HDL pe talo ya triglyceride (ba mafuta mususu) eza na litomba nango. Ezali pe nzela ya likama pona bokono ya coronarien. Koyeba mingi na cholesterol.
  • Diabete. Soki glycemie eza ya komata na tango molayi, ba misisa ebebaka. Yango wana batu ya diabete bakoki kobela bokono ya cardiovasculaire.
  • Komata ya tension. Ba hemorragie cerebrale ezo wuta na tension.
  • Komata ya ba caillou ya makila. Ba caillou ekoki kokitisa to kanga kotambola ya makila na misisa.
  • Komata kilo. Mafuta ya tolo, na yemoko, eza likama makasi.
  • Kosala ba ngalasisi mukie, komela makaya pe komitungisa.
  • BIlei (tala: Musala ya bilei)

ba nzela ya kotikela batu bokono esalaka pe musala na kokolisa ba bokono ya cardiovasculaire. Ebongiseli ya ba gene ekoki komatisa likama na 60%. Na Hollonde, neti, mutu 1 likola ya batu 300 eza ebongiseli yako matisa makasi talo ya cholesterol LDL na makila, yango ezo matika likama ya bokono ya cardiovasculaire. Mobeli ya bokono ya motema 1 likola ya 5 batikela ye epayi ya baboti baza komata makasi ya mafuta na makila . Ba mbeba ya gene ekoki pe kosala musala , kasi ezali nanu penza mpole te pe bolukiluki ezo koba nanu. mingi, ba bokono ya cardiovasculaire esangisaka ba nzela ebele.

Musala ya bilei na bokono ya cardiovasculaire

Na kolia malamu, batu bakoki kokitisa likama ya ba bokono ya cardiovasculaire. Bapesi toli ya nzoto bameki ba effect bilei pe ba supu pona likama. Elakisi ete kolia ba bilei pe ba supu mususu eza na likama mukie na bokoko ya cardiovasculaire. Kasi ba bilei pe ba supu mususu ezo na likama makasi na bokono ya cardiovasculaire.

Bilei to supuEmatisaka likama ya
Ba acide ya mafuta transBokono ya coronarin
Musuni ya rougeAVC
Musuni to supu babongolaAVC
Ekitisaka likama ya
Soki ba acide gras saturé ezui esika ya ba acide gras polyinsatureBokono ya coronarin
NdundaBokono ya coronarin
AVC
MbumaBokono ya coronarin
AVC
Ba cereal pe biloko ya cerealBokono ya coronarin
Fibre (mobimbal)Bokono ya coronarin
AVC
Ba ndika pe ba mbotoBokono ya coronarin
MbisiBokono ya coronarin
AVC
Ba acide gras ya mbisi EPA+DHABokono ya coronarin
PotassiumAVC
Cafe (oyo ba yungula te)Bokono ya coronarin
AVC
Ba tii ya moyindo pe ya vertAVC

Alcool

Ba mbano ya boyokani ya alcool pe ba bokono ya cardiovasculaire ezo lakisa mbala moko boyokani ya malamu pe boyokani ya mabe. Komela alcool mukie (ti na 15 g na mokolo, neti komela suka verre 1,5) eza na likama mukie na bokono ya coronarien, kasi komela mingi ezo matisa likama ya AVC. koyeba mingi na alcool.

Ba toli ya bilei

Ba toli pona komibatela na ba bokono ya cardiovasculaire

Kolia bilei ya malamu ndenge elobi ‘Schijf van Vijf’, kobate kilo pe kozala lolenge ya kolia malamu na kosala ngalasisi, komitungisa mingi te pe komela makaya te ekitisaka likama ya ba bokono ya cardiovasculaire.

Ba toli pona ba bokono ya cardiovasculaire

Eloko ezo lakisa soki ba misisa ya makila na yo eza ya kokangama? Ozo na tension ya komata? To oyutaki kozala, neti crise ya motema to AVC? momesano, kolia bilei ya malamu eza lolenge ya komisalisa, kobakisa na ba kisi. Kolia bilei ya malamu ezo sunga yo nako bongisa nzoto na yo pe koya na kolongono. Monganga na yo azali mokambi pona kosalisa pe kotala soki oza na bosenga ya ba kisi ya anti-cholesterol to hypotenseur. Mongonga na yo akoki kotinda yo epayi ya monganga sipecialiste ya bilei.

kolela, salela ba biloko oyo eza na ba sterol pe ba stanol, neti ba mateka pe ba yawu ya komela, na toli ya monganga.

QR code naar deze pagina

QR Code
nl_NLDutch