Tango mwana na yo azali nanu na école primaire, monganga moko ako banda ko landelaka ye tango na tango, monganga oyo mosala na yo ezali ko landela ko bika malamu ya bilenge. Bozolandela na bo kebi ndenge nini mitu na bango ezali ko mata na taille, pe lisusu ndenge nini bazali ko matisa kilo ya ba nzoto na bango. Soki mwana na yo azali monene makasi ko leka, lingomba oyo elandela santé ya bilenge bako silisa ko yebisa yo.
Soki monene eleki makasi epayi ya mwana ekendeke penene ko mema ye na bokono na mikolo ekoya, yango wana ezala na litomba makasi ko telemela likambo wana na ngonga malamu.
Ba boti ebele ba mekaka monene ya ba monene ya bana mingi mingi, kasi ndenge nini okoki ko yeba malamu soki mwana na yo ozali monene na ndenge ya ko leka ? Okoki ko yeba soki mwana na yo azali monene makasi na ndengen ya ko leka na momekano moko ya mukie: na lopoto ba bengi yango Body Mass Index (BMI). Momekano oyo esalemaka epayi ya monganga ya kelasi pe okoki pe kosala yango yo moko na ndenge na nzela ya site webi oyo www.voedingscentrum.nl/nl/bmi-meter
Esengeli te bana ba kota na komindisa na ko zonga lisungu. Pamba te, ba nutriments nionso pona bokoli malamu na bango bana bazalaka na posa na ngo. Yango wana wana, tunaka toli ya monganga ya libota na bino, monganga ya bilenge to pe oyo ya kelasi. Soki pe esengeli, bakoki ko mema mwana na yo epayi ya mutu oyo okoki ko sunga bango na ndenge ya mozindo ndeti ba to pédiatre to ba pédiatre diététicien.
Soki ozali na keba keba to pe mituma kama likolo ya monene ya mwana na yo, okoki ko kende ko mona GP to pe monganga oyo a landelaka bilengi to bana ya kelási.
Ekoki ko yebana na mbala moko te na bopete pona nini mwana akomi monene makasi na ndenge ya koleka. Tangu mususu azalákí ko lia biloko yo oyebaki te été etondaki na ba calorie. Mbala mingi, likambo wana owutaka na ko lia biténi na yango ebele na ndenge yako leka.