Kozala ya ko konda ezali tango kilo ya mutu ezali nasé pona mutu azali na santé ya malamu. Kozala ya kokonda ezali signe ya kolia mabe. Bayebaka soki mutu aza ya kokonda na kotala indice de masse corporelle (IMC) mpe taille ya loketo. Mutu aza ya kokonda soki ICM naye eza nase ya 18.5.
Basalelaka ba limites misusu pona batu oyo baleki 65 ans to batu ya COPD. Ezalaka ICM nasé ya 20 pona batu baleki 65 ans mpe 21 pona batu ya COPD. Pona koyeba soki mutu azolia malamu te, batalaka ICM nasé ya 20 pona mikolo ti na age ya 70 ans mpe ICM nasé ya 22 pona mikolo koleka 70 ans na kotala mpe ba maladie misusu. Pona bana mikie batala mpe biloko misusu. Lokola bana bazali ko kola, mulayi, munen eko dependre na age.
CBS-health sondage ya 2019 elakisi ete 2.5% ya ba hollandais ya age ya 4 ans mpe likolo baza ya ko konda. CBS asalelaka ICM ya 18.5 pona mikolo nioso.
Ko konda esalamaka soki quantité ya energie mutu azali kozwa na nzela ya bileyi and biloko azali komela eza nasé ya oyo nzoto ezo salela na tangu moko. Ko konda ezalaka minigi epayi ya ba koko oyo baza na ba home de veillards mpe hopital mpe ba oyo bazali kobela. Ko konda ekoki kozala likolo ya:
Kozala ya kokonda ememaka ba problemes ebele ya santé po ete risque ya kozanga ba proteines lokola graisse, vitamines, mineraux eza makasi. Systeme immunitaire ebandi kobeba mpe mutu akobanda koyaka kolemba. Nzoto ekobanda kosalela reserve ya graisse mpe ba muscles. Esalaka ete graisse na ba muscles ebeba. Kobeba ya ba muscles ezalaka mabe makasi. Soki ko konda ewumeli, risque ya mikuwa kobukana mpe ekomata.
Pona mutu oyo aza ya kokonda, esengeli atika ko konda mpe abanda koya munene. Soki okondi makasi na tangu mukie pamba kaka boye, esengeli omona docteur nayo. Mpe soki oza na mitungisi pona kolia, mona docteur nayo.
Soki ozo koka ko koma na poids ya malamu te na ba sanza mukie, esengeli komona docteur nayo. Docteur ako landela cause ya kokonda mpe akoki kotinda yo epayi ya specialiste to mutu alandelaka makambu ya kolia soki esengeli.
Oza ya kokonda? Assurance santé nayo bako zongisela yo mbongo pona ba heures okosala epayi ya mutu alandelaka makambu ya kolia.
Pona batu oyo bazali ya kokonda, kolia malamu ezali important. Bongo nde bakozwa ba proteines oyo nzoto esengeli nango lokola ba graisse, vitamines mpe ba mineraux. Esengeli mingi kolia biloko eza na proteines mpe energie ebele nakosangisa na exercise physique pona ko kolisa ba muscles.
Pona batu baza ya kokonda esengeli koya munene
Kolia mabe ezalaka soki energie to proteine mutu azali kolia eza mukie par rapport ya oyo esengeli po azala na santé malamu.
Malnutrition ezalaka tango mutu azo lia mingi te, to azo salela energie na proteine mingi. Probleme oyo ezalaka makasi na ba koko mpe batu ya maladie. Malnutrition ekoki mpe kozala likolo ya ba problemes ya ko macher mpe komela.
Soki bakuti malnutrition na nzoto, esengeli kobenga docteur. Ba ndeko na batu bazali kolandela santé bamonaka malnutrition yambo ete mutu ya maladie ye moko amona yango.
Malnutrition eza kozanga energie to proteines. Ememaka kokonda mpe nzoto kosala malamu te. Ezalaka kokonda na minene. Ya muscle mpe kozanga ba proteines lokola graisse, vitamines mpe ba mineraux.
Batu baza na risque makasi ya malnutrition eza ba koko, batu ba belaka, batu ya cancer, batu baza na operation ya makasi na batu baza na ba traumatisme makasi.
Risque ya makasi ya malnutrition eza maladie. Maladie ekoki komatisa posa ya ba proteine mpe kosala ete bileyi oliaka ezo koka lisusu te.
Ba koko baza na risque ya malnutrition po ete ba belaka mingi mpe basalaka exercise physique te. Ba koko bazalaka na posa ya energie mingi neti tangu bazalaki ba jeunes te, yango ekoki kokoma pasi pona pona kozwa ba proteine nioso na bileyi na bango.
Eloko ya liboso eza koyeba soki mutu aza na risque ya malnutrition. Esalamaka na ba instrument lokola scanner. Ba instrument yango etalaka kokonda oyo mutu ayebi te, kozala na poids mukie mpe kobungisa appetit.
Soki, nakosala scanner, mutu aza na risque ya malnutrition, bakoloba mutu aza na malnutrition. Na 2018 ba decidaki ete mutu aza na malnutrition soki aza na moko ya ba characteristiques oyo.
Moko to ba characteristiques mingi il faut ezala:
Moko to ba characteristiques mingi il faut ezala:
Soki mutu azo lia bien te na kolandana na ba critere oyo, bako tala makasi ya malnutrition yango. Batu oyo baza na santé ya malamu to pe batu na obesité bakoki pe kozala na malnutrition. Kobungisa ba proteine na nzela ya kosanza to diarhée ekoki pe ko sala ba probleme ya malnutrition mingi mpe soki demande ya energie emati likolo ya maladie.
Pona bana, batalaka ba valeurs misusu. Docteur akosalela kokola pona kotala soki muana aza na malnutrition.
Malnutrition eza na impact makasi na santé. Ba conséquences ezali:
Esengeli kobenga docteur mbala moko soki omoni ba signe ya malnutrition. Esalemaka mingi mingi epayi ya ba ndeko, ba connaissance to batu ya santé que mutu ya maladie ye moko.
Na traitement ya malnutrition, eza important ko landela consommation ya proteine na energie. Exercise physique mpe ezali important pona kosimba makasi ya ba muscle.
Oza na malnutrition? Assurance santé ekozongisa mbongo nombre moko ya ba heure oko lekisa epayi ya mutu atalaka makambu etali kolia.
Nako landana na degré ya malnutrition, docteur to mutu alandelaka makambu ya kolia ako decider biloko nini oyo ya energie mpe proteine makasi, na kobakisa ba vitamine mpe ba mineraux, biloko ya kolia oyo okoki komela to kolia na nzela ya tube.