033 - 2003259
Arthrose eza maladie oyo ekoki kosala ete ba articulation nayo ekoma raide to pe esala pasi. Ba genou, loketo na ba articulation ya mikie na maboko nde ezalaka affecté. Yango nde forme ya arthrose oyo ezalaka mingi.
Maladie oyo eyaka soki ba articulation nayo ebebi. Tangu ba articulation ezo meka komibongisa, changement ekoki kosalama na kati. Changement wana nde ekosala pasi.
Eza na 2 sortes ya arthroose.
Arthrose esalaka ndenge moko te na batu nioso, mpe esalka ndenge moko te na ba articulation nioso. Ekoki kokoma makasi soki mikolo eleki, kasi eza rare. Ekoki kotikala bongo na sima ya ba mbula ebele to mpe pasi ekoki komata soki mikolo eleki ebele.
Eyebani mpenza te eloko nini esalaka ete mutu azwa arthrose. Eyaka na ba raisons ebele. Kasi eza na biloko misusu oyo ematisaka risque ya arthrose makasi. Okoki kozwa arthrose soki:
Symptomes ya munene eza pasi na ba articulation. Okomona ete ozo koka lisusu ko sala ba mouvement na articulation wana te neti liboso. Tangu mususu pasi ekoki kopanzana mpe oko yoka yango na esika mususu na nzoto. Par exemple soki oza na arthrose na loketo, okoki koyoka pasi na kati kati ya makolo, ba cuisse, ba genou to chevilles.
Okoyoka pasi kaka soki olingi osalela articulation wana, mpe eko koma malamu soki opemi. Kasi soki arthrose nayo eza makasi, okoki koyoka pasi ata soki ozo salela articulation te. Articulation nayo ekosala pasi eloko ya liboso na tongo to soki owuti kopema kasi pasi esilaka mbangu.
Tangu mususu nzoto ekovimba esika ya articulation yango,mukusa to mpe pasi to makelele soki osali mouvement.
Ba symptomes oyo tangu mususu ezalaka likolo ya ba problemes misusu, kasi soki oza na yango, benga physiotherapiste nayo pona ba conseils.
Physiotherapiste nayo akoyebisa yo biloko ebele okoki kosala pona ko kitisa pasi na articulation. Biloko yango misusu eza na liste oyo.
Kosala exercice mingi soki okoki eza eloko ya malamu makasi okoki kosala. Exercices ekosala ete ba articulation nayo esala malamu pe pasi ekita. Ekosunga mpe pona koyesa ba muscle makasi mpe kobongisa makasi ya nzoto mobimba mpe ekosala oyoka malamu.
Tangu mususu, physiotherapiste ako pesa yo ba exercices nini ya kosala. Tangu mususu bako pesa kaka ba conseils eloko nini okoki kosala. Esengeli osala eloko oyo ekosepelisa yo mpe oko koba kosala yango.
Sala ba types ya exercise different, na oyo mpe ezo landa.
Matisa malembe malembe ba exercices ozo sala. Esengeli omona physiotherapiste oyo akoki kosunga yo pona kosala ba exercices propre na cas nayo.
Ndenge moko na ba mesures ya biloko okoki kosala yo moko, eza na ba traitement ebele pona arthrose oyo physiotherapiste ako solola nayo.
Physiotherapiste nayo akoki kotinda yo epayi ya ba specialiste misusu oyo bakoki kopesa yo ba conseils mususu pe kolakisa yo biloko misusu oyo ekoki kosunga. Ekoki kozala biloko oyo.
Tala soki ekoki kosunga ko changer positionnement na ndaku to ko adapter biloko. Par exemple, soki oza na arthrose na genou to na luketu, okoki kotia ba rails na etages to biloko ya kosimba na salle de bain. Kotombola kiti ya toilette, kiti ya kovanda mpe na douche ekoki kozala malamu. Soki maboko nde ezo sala pasi okoki koluka ba appareils lokola tourne-taraud, biloko ya cuisine oyo eza na bisimbeli mpe ouvre-boite automatique.
Therapiste ya occupation akoki kopesa yo ba conseils mususu. Bakoki kozongisela yo ba depenses ya lisungi to adaptation oyo esengeli pona ndaku nayo. Solola na bakonzi ya ville nayo pona koyeba.
Soki oza na musala, tuna soki companie nayo eza na departement ya santé etalaka occupation. Bakosunga yo nako bongola ndenge ya kosala musala to esika nayo ya musala..