033 - 2003259
Lipeka malíli ezalí tangu lipeka na yo ekúmbi pé ezo suwa. Moto ayébi malámu pona nini ekomaka. Ba traitements, mpé ba kisi oyo silisaka pasi na ba exercices, nionso wana bikoki ko lembisa bilembo ya bokono.
Lipeka na yo ezali eténi oyo articulation ya rotule. Bouli oyo ezali na moto ya mukúwa ya loboko na yo ebalukaka na kati na kati ya lidusu oyo ezali pembeni pembeni ya omoplate. Ba joints nionso wana bikangamí na kati ya mwa ndaku moko ya ba fibres. Lipeka malíli ekomáká tangu mwa ndaku wana ekúbi, ekembi pe ekangamí makási ko léka loléngé esengelaka. Ezalí pona bongo, lipeka malíli ebengamaka na mínganga na kombo ya “capsulite adhésive”. Okoki ko yóka lipeka malíli na ngámbo moko tǒ mpé na ngámbo nionso mibale.
Soki tozali na bato 100, kaka 5 kati na bango ndé bakobandá ko yokaka lipeka malíli na ngámbo moko wana káka na bomoyi na bango mobimba. Ko bandá mbúla 40 tée 60, bato ya kati wâná ndé ba yókáka mapeka pasi mingí, pé ndeti kaka epayi ya ba mama nde elakaka. Bato oyo santé ya ba nzóto ya bangó ezaláká na kébá kébá bakweyaka na bo pete na likambo ya lipeka malíli – pona ko yeba mingí na tina na yango, tanga na bisika to lobeli lolenge nini ebandákq.
Ba mínganga ba yébi nanu malámu ndenge lipeka malíli ebótámaka. Ba banzaka été ewutaka na inflammation moko na ba joints ya lipeka pe na ba ba capsules na yangó na pembeni pembeni.
Tangu mususu ata eloko mókó epesaka eyano pona nini moto azwaka lipeka malíli. Yangó wâná ndé ebengami Lipeka malíli ya yambo.
Lipeka malíli ya mibali ezaláká soki esi ozala na mikakatano ya lipeka malíli, tǒ mpé loléngé ya nzóto na yo e pesaka nzelá po eté Lipeka malíli ekómela yo na bo pete.
Lipeka malíli ekoki tango mosúsu ko koma soki ozalí na pota na lipeka, shoulder can sometimes develop if you have a shoulder injury, ndeti pona na coiffe des rotateurs na yo (ba tendons mpé na ba misuni ya lipeka). Okoki pe lisusu kokoma soki o vandisi lipeka na yo na position moko tango molayi makási. Ndakisa, sima eté mokúwa na yo ebukaná tǒ mpé sókí ba salaki opération na lipeka.
Atako ba mínganga ba yébi malámu te bobandisi ya makambu wana, mikakatano misusu na nzóto ekokí ko fungolela yango nzela makási. Makambo lokóla:
Bilembo ya makasi ya lipeka malíli ezalí míbalé.
Soki omimoni na bilembo wana, toli to pesi ezalí kende na lombango ko mona physiothérapeute.
Lipeka malíli elekaka na bitapi ebelé tée ékola, ko léka ya étapi moko na etápi mususu ekoki pé ko sangaka.
Bato ya mayélé misusu ba Ndimaka te eté loléngé oyo elakisaka penza malámu makambo batu oyo ba kweya na likama ya lipeka malíli ba bikaka. Soki okweyi na likámá ya lipeka malíli, ezalí malámu kutu okende ko kutana na monganga na tée ozela été yango Mókó esílá.
Soki o banso eté ozwi lipeka malíli, mona GP to physiothérapeute. Bako tuna bilembo nini o monaki mpé histoire ya bobéli na yo kotala na bokébi ba bokono nini to ba pota nini okutana na yango óyo okokí ko botela yo likama ya lipeka malíli..
Bakontuna pe loléngé nini ba bilembo wâná ememaka mikakatano na bomoyi na yo ya mikolo na mikolo.
Physiothérapeute na yo akotala lipeka na yo pona ko yeba soki ekoki ko baloka na bo pete. Ba ko sala ba tests ebele na lipeka na yo pona ko yebá soki likama wana ezali óyo ya lipeka malíli tǒ likambo mususu. Bokokí ko niolisa lipeka bino mibalé tǒ mpé akokí ko séngá yo o niolisa yango yo moko na malembé, oko niolisa yango na ba loléngé kili kili. Yango eko lakisá bango soki eténi esika lipeka na yo eminiolisaka ekondisami. Yebisá physiothérapeute na yo soki ezalí ko sala yó mabé makási.
Soki ozwi lipeka malíli eko méma mikakatano na loléngé o niolisaka lipeka na yo, ebengami “rotation externe passive”. Mouvement wana elakisami na vidéo oyo pona ko talisa loléngé ko yeba lipeka malíli.
Ata ko soki ba rayons X ekokí te ko confirmer tée ozalí na lipeka malíli, X-ray can’t confirm a frozen shoulder, physiothérapeute na yo akoki ko séngá na yó eté o salá yangó pona ko tia pembéni ba nzela kili kili misusu ya makámá. Soki traitement na yo ezali ko sunga yo malámu te, ekosenga na yo obakisa ba test misusu ndeti MRI to mpé CT scan na lipeka na yo.
Lipeka malíli emi bikisaká kaka na yango moko, kasi yeba eté ekoki ko zwa yo ba mbúla ébélé po e bika.
Mobokó ya traitement nionso ezalí yako silisa pasi na yo mpé ko sala eté soki omi niolisi, esalama na bo pete. Soki ba bandi ko landela libíki na yo na ngonga ya tongo, oko Zwá libíki pe na lombango.
Soki o banso eté ozali na lipeka malíli, esengeli eté okutana na physiothérapeute na yó. Kási makambu ebelé na pembeni okoki pé ko sala pona ko misunga.
Physiotherapie ezali traitement ya litomba pona maye matali lipeka malili. GP na oyo akoki ko tinda yo epayi na physiothérapeute to mpé yo moko okoki ko luka ko mona moko na bango. Physiotherapie esalemi na ba loléngé ebélé ya traitement. Ba oyo mibali ya litomba koleka to tandi yango awa.
Pona lo boya été lipeka malíli ezonga lisusu, esengeli otikaka ko niolisaka lipeka na yo. Soki o misali pasi to mpé eloko moko ebandi ko suwa, kende ko luka lobiko na lombango penza. Soki mpé lipeka na yo ezali na pota to pé elekaki na lipaso, landa toli ya monganga to ya physiothérapeute na loléngé okoki ko lata écharpe to mpé loléngé okoki ko nionso lipeka na yo lisusu na ndenge oyo mabe ekoma te.