033 - 2003259
Kosala ba exercice eza important pona santé ya batu nioso, kasi mingi mingi tangu ozali kokola. Tangu ozali kokola pe okomi koyoka ba pasi to kobela, okoki kolemba kosala ba exercice. Kasi kosala exercice ekoki kozala eloko ya malamu pona kozala na santé ya malamu, kosala ba mouvement yo moko. Ekoki pe kosala ete maladie ekoma makasi te pe kokitisa risque ya kozwa maladie misusu.
Kosala. Ba exercice eza na avantages makasi pona santé physique pe mentale. Recherche elaki batu ya plus de 65 ans oyo basalaka exercice bazalaka na santé ya malamu. Baza pe na chance mukie ya kozwa maladie ya makasi que batu oyo basalaka exercice te. Kosala exercice mingi ekoki kokitisa risque ya kozwa:
Exercice ekoki pe ko kolisa makasi ya ba muscles. Elakisi eza pasi osala accident, okweya pe omisala pasi. Kosala exercice mingi ekoki pe kosunga:
Esengeli osalaka ba exercice mingi.
Ko bungisa makanisi te soki nionso oyo ezali ko lekela yo. Soki ezali sika epayi na yo, ya libosó Kitisá nanu motéma, mpé bandá malembe kolandela makambo oyo ekokí ko sala eté nzoto na yó evandisama malámu mingi. Ya motuya esengeli eté o lekisaka mwa tango na ko salisaki nzóto mwa ba mouvement. Ko sala mwa ba mouvement ezaláká malamu mingi yako léka ko sala eloko moko te – Ko sala ko léka ezalaka obe kitoko mingi.
Soki deja ozalaka na yo mutú ya kásá kásá, na kati ya mposo na yo mobimba mikotisela ba exercices ya makasi lisúsu koleka oyo oko bandá ko sala ko zwaka 75 minutes mokolo na mokolo. Soki o salaka ba masano ya makasi makasi mingi, epemeli ekozala kitoko koleka, kilo mpé mbangu makasi. Ekozala mwa pasi pona ko bimiselá ngo maloba. Kasi okoki ko sangisáki ndambu ndamu masano ya makasi ko léka pe na oyo ya pete pete.
Makambu ya pema oyo osalaka elakisaka loléngé nini mutema pe ba poumon oyo ya ezalí malámu. Ndenge ba mbula na yo ezali ko lata, ndenge mpé oko koka lisusu te ko sala makambu makasi makási na bo Pete. Kasi okoki ko sukisa yango nako salaka makambu oyo e betisaka motema makasi mpé oyo o kataka pema mwa mokié.
Okoki ko sala masano oyo epesa pema bisika nionso mpé na ngonga nionso. Ndeti na esika yo ozwa ascenseur mata na yo ba escalier, kendeka ko sala gymnastique, masano na kelási, betelem mayi, mpé na makambo nionso oyo ya ko sala libándá ya ndako na yo. Ezalí pe na ba masano mosusu ebele ya pema oyo yo moko okoki ko sala na ndaku na yo na lolenge yo moko oko sepela ko sala.
Pedometer ekoki mpé ko salisá yo tǒ mpé machine ya ko tanga ba pas pona na ko yeba ko léka bokási na yo mpé ko landelaka loléngé ezalí ko kende. Yango nde eko yebisa yo soki esengeli na yo obakisi ko zala kásá kásá, makasi penza na ba ngonga misúsu na mokolo tǒ mpé mikolo misusu na mposo. Ezali na mobeko moko te mokili mobimba elandelaka ko lakisá ba pas boni esenfyna moto a sala, kasi soki yo osali ba pas ebelé, nzoto na yó pé ezalí ko bendeme na ndenge ya malamu.
Awa mwa makanisi mokié pona ko Lobelá maye matali ba masano oyo epesaka pema.
Ba misuni na yo esilaka nguyá na ndéngé ozali ko kola, kasi okoki ko sukisa bo bungisi ya bokási wana. Léka ko lendisa misuni na yo na ba exercices moko ya makasi. Sala été bokási na ngo ebombamá, eko sala eté okoka ko sala misala na yo ya mikolo na mikolo pé otondaka mosika na yo risk ya ko kweya.
Esengeli na ngo te o memaka biloko ya minene po eté okomisa misuni na ya nzoto makasi – Kaka Ba Makambo ya ko sala mikolo na mikolo nde ekoki ko sunga yo. To sangisi pene na mwa ba makanisi ya ba lolenge okoki ko sala po eté o tonga malamu bo pemi na yo mpé na bokási na yo. Ko sangisaka na mwa ndambu ndambu Makambu mpé na ko salaka ba exercices oyo ebandaka misuni na nzoto ekosala eté o buka ba mbuma ya Kitoko ebele. Bandá malembe malembe ata na mwa makambo mokié tée Okomi vandisa na ba oyo eko milakisa malamu mingi penza pona yo.
Ba makanisi ya ba lolenge okoki ko tonga bokási na yo.
Ndenge ozali ko kola, misuni na yo ya nzoto ezalí ko lembeke pete. Oko bandá ko zwaka mwa ba pasi mpé bisaka misusu eko bandá ko zuwa, okoki pé ko kweya mpé nako mizokisa. As with any age group, fitness levels vary from person to person. Some older people run marathons, while others find it hard to get out of a chair without help.
Soki owuti na maladi to mpé nzóto nanu okomi malámu te, yango bikoki ko kotisa mwa mbilinga mbilinga na Ki-Bokasi na yo. Kasi ko kanisa te eté ekoki ko silisa Ki-Bokasi na yo mobimba. Ezali na litomba makasa osalaka ba exercice pona ko yika malámu.
Ko tambolá makolo ezalaka mingi mingi na likambo mabé kasi soki ozalí ko bangela santé ya nzóto na yo, túna GP na yo alakisá yo eloko níní ekokí ko memela yo makama te.
Soki ozalí na pasi makási ya ko sala exercice po eté owuti na bokono moko ezwáká tangu mingi po ekende, ezalí na litómba eté o sala mwa ba exercice soki okokí. Ba exercice eko bongisa humeur mpé eko sunga été santé ya mayélé ézala malámu. Okoki ko sala yango áta na ko vanda likoló ya kiti.
Beta a mwa lisolo na psychothérapeute na tina ya ba exercices oyo ekoki ko zala malamu pona yo. Ko bandeke kaka zololo tǒ mpé ko vanda esika moko tangu molayi ezalaka nzelá monene pona ko mema batu na mozindó ya bokono ya thrombose veineuse (DVT). Vidéo oyo ezo landa awa ezo lakisa kamwa ba exercices ya makolo ya pete pete Oyo okoki ko sala na ndaku na lolenge okolinga pô été ebatela yo.
Likambo mabé :
“Na kweyaka mbula eleka, ebandá mokolo wana nazalaka lisúsu té na makási ya ko sala ba exercice. Nazo banga eté na kweya lisúsu.”
Toli :
“Mikomisa na kelási ya Yoga to ya Pilates áta mikolo mibale na mposo moko. Yango eko sunga été nzóto na yó evandisama malámu, biteni na ngo nionso eyokana malámu mpé epekisa eté okweya lisúsu. Okoki ko pona ata kelási oyo ezali kaka ya bato mikolo to atá lingómbá nionso mususu kaka kasi sala oyo eko pesa mela yo. Ko Bosana te ko Yebisa molakisi na yo soki o moni eté mwa mbilinga mbilinga moko ebandeli yo na nzóto.
“Okoki na yo pé tangu mususu ko meka toli ya physiothérapeute pona ko zwa lisungi na makambo oyo ozali ko kola malámu te. Bandá ko sala na bangó – to mpé molakisi ya conditionnement physique – pona ko lembisa mipiku ya misuni na yo wâná.”
Likambo ya mabe :
“Nazalk na bokonzi ya arthrose na kati ya libolongo ezaláká pasi makási, atá kutu kotámbola mokié na kokaka lisusu te.”
Toli
“Okoki ko banda na ebandeli eté ko sala exercice ekoki ko bebisa lisúsu makási libolongo na yo, nzoka nde kutu eko bongisá. Soki o kóbí na ko tambolá mpé ko sala ba exercices, eko sunga été ba joints na yo ézala malámu mpé eko lembisa pasi ozalaki ko yóka. Tango batu ya mayele ba landelaki, ba monaka été arthrose soki ezali na libolongo na yo,ba exercices e Kitisáka pasi mpé e salaka été ba joints na yo esálá malámu.
“Tango batu ya mayele ba landelaki, ba monaka été ba exercices esúngaka mpé pona oyo etali mipanzi, mpé okoki pé ko mema eté ba joints ya mipanzi esala malámu. Bandá ko betaka mayi po eté ekoki ko salisá ba joints na yo ba exercices tango nzoto na ngo mobimba ezo tepa. Meka mpé ko sala t’ai chi, oyo ekoki ko sunga yo olembisa pasi ya arthrose ya mabolongo.
“Ekipe te loléngé ozali mokolo. Ko sala ba exercice tango na tango eko sunga yo na arthrose mpé eko matisa bokási na yó na ko bongisá santé na yo.”
Likambo ya mabe
“Nazali mpaká pona ko bandá ko sala ba exercices.”
Toli:
“Okazala mpaká makasi te po o bandá ko sala exercice ! Bandá ata na ko ndambolaka atá eténi mokié mpé kolisa bokási na yo malembé. Tangu motéma na yo ekonda tonda na confiance, nde kende ko meka pe ba activités misúsu.”
Soki ozali mutú ya bo kebi makasi, ba exercices ekoki ko sala mabé te. Ko zala zololo nde kutu esáláka mabé makási ko léka ko sala exercice. Soki bandá o sala exercice ya suka, tango molayi eleká, bandá atá mokié mokié mpé landela ndengé makambo ekotambola.
Kasi soki oyókí pasi na ba joints na yo to mpé tango ya exercice obetemi na vertige, kata mpé luká toli ya minganga – makasi mingi soki bilembo ya mabé wâná ezo koba atâ ko yo esi o mikatelaki ko sala ba exercice.
Kata ko sala exercice mpé kendé na lombango koluka toli ya Munganga soki: