Hoge rugpijn Congolees

Pasi na likoló ya mukongo

Afbeelding met persoon, person, binnen Automatisch gegenereerde beschrijving
Ekoki ko salama eté oyoka pasi na likoló ya mukongo tǒ mpé lisúsu na kati káti nz yango, kaka loléngé moko esalaka na bisaka ya sé. Yango e salamaka penza na pasi ko léka kutu pasi na sé ya mukongo, oko zala na pasi ko bandá na mokúwa nionso ya kingo tée lokéto.

Oyo etali mokongi na yo

Ko yeba loléngé mokongo na yo etóngama ekoki ko sunga yó. Mókóngo na yo ezali na biténi ebelé ekangama moko na moko, na kati na yangó mikúwa, ba joints, misuni, ba ligaments, misisa mpé ba tendons. Mokúwa na yo ya sima nde e memaka kilo nionso ya mukongo. Etóngámí na 24 mikúwa ya mikié mikié ya moko na moko oyo to bengi vertèbres, e tandami moko likoló ya mosusu. Na ngámbo ya ko kita ya mokúwa na yo ya mokongo, ezalí na mikúwa na yó ya na óyo. Nakati kati ya ba vertèbres to zali na ba disc oyo mosáli na yango ezalí ko sala eté mwa bo pete ezalí tango moto azalí ko Ngúma mokúwa na yé ya sima ya mokongo. Moelle épinière na yo elekaka na kati ya vertèbres. Yango nde elekisa ba misisa mingi ya boyókani na bôngó na yó tée na biténi misusu nionso ya nzóto. Moelle épinière na yo esukaka na sé ya mokongo na yo ndeti engumba ya misasi. Yango ndé e bengami Cauda equina (na latin elakisi “mokúwa ya punda, ebanzama eté ezalí na bokokani na yango).

Makambo ememaka pási na eténi ya likoló ya mókóngo

Makambu ebele émemelaka bato pasi na eténi ya likoló ya mókóngo na bango. Ba pasi musu ekómelaka moto ezangí moto na makolo. Pasi ya mokongo oyo ezangí moto na makolo ebengami na monoko ya lopoto maux de dos non spécifiques. Eyaka mingi soki ba misuni na yo sima pe ba risques na yango eniolisama na ndéngé na ko leka.

Pasi na likoló ya mókóngo ewutaka mingi mpé sókí loléngé otelemisaka nzóto na yo tango molayi ezalákí malámu te. Etelemi ya malongá ezalí tolo na yo o vimbisa mokié likoló na libóso mpé kasi mapeka na yo ezóngísi na sima mpé otiki yango ya ko kita. Moto otelemisi – sala makási eté o tengamisa yangó te. Mayi na yo, mapeka, lokéto na ba cheville na yo esengeli nionso wana ezaláká ko landá nzela sé mókó.

Ba loléngé misusu oyo ememaka pási na likoló ya mokongo ezalí:

  • Mwa accident to pota mókó ekweleli yo na lombangu ndeti lokola o betami ebotu na bongo tǒ kozoka ewutaka na masano.
  • Ko benda molayi mosuni tǒ ligament ya mokongo na yo
  • Misuni ya mokongo na yo ezángá nguyá (ndeti tango moto a avandaka obele esika moko zololo)
  • Ko vanda libosó ya ordinateur bango moko ya milayi
  • Soki o salaka ba mouvement mókó tée ébotela yo pota likoló ya ko bandelaka kaka eloko moko

Pasi ya likoló ya mókóngo ekokí pé ko wuta na makambo misusu ya ko sakana na ngo te, ndeti:

  • Ostéoporose
  • arthrose
  • Sténose spinale – Soki ba nzelá oyo elekisaka Moelle épinière ezo sala malamu po emema yango na ba vertèbres nionso (canal rachidien) ekondi makási ekomi miyoto na monéne ya singa – ekondi ekomi ko Fina misisa
  • Disc glissé – moko ya ba disc oyo evanda na bakati kati ya mikúwa ya mokongo (vertèbres) na yo e mi-longoli na esika mókó (atako ekómáka penza na pasi makási eté epesa bilembo ya pasi na likoló ya mokongo)
  • spondylarthrite ankylosante

Bilembo ya pasi ya likoló ya mokongo

Bilembo ekesanaka epayi ya moto na moto mpé elandaka loléngé moko na moko azwakí pasi na yé ya mókóngo. Pasi ekoki ko zala ya pete tǒ mpé ya makasi ko léka. . Pasi ekokí ko milakisa pé makasi esika moko boye ya mokié to pé pasi ekokí ko ya na bisika ebele na mbala moko, kasi wana eko bandá ko wumela te, eyeyi ekeyi, eko bandá ko sala kaka bongo. Pasi ya mokongo oyo boyeli na Ngo eyébaní malámu té, ebengami maux de dos non spécifiques. Soki pasi na yo ya mukongo ezalí ko bebisela yo makambu ebele mokóló na mokóló, to ezo kataka pongi ozo lala malamu te, kende ko mona physiothérapeute to GP.

Diagnostic ya pasi likoló ya mókóngo

Monganga ako túna bilembo mpé akonla Fela yo malámu. Na sima na yango ako yeba malámu sókí ozalí na pasi na likoló ya mókóngo pe sókí ezo wutela wapi pé akokí ko tinda yo osali ba tests misusu. Pasi na likoló ya mókóngo ewutaka mingi soki mosuni ya nzóto e bendemi makási, Kasi ewutaka pe na ba nzela misusu ya mikakatano makási. Ezalí na bilembo moko mónganga ako landela pona ko yebá yangó. Bilembo wana ebengami ba drapeaux rouges mpé na kati na bangó tozalí na:

  • Poto ya kala mingí te na mokongo na yo ndeti ya ko kweya to ya accident ya motuka
  • Pasi ya mukongo ko wuta na pota ya mikié to ko mema biloko ya kilo – mingi mingi soki ozalí na ostéoporose
  • Soki o bela cancer to mpé bibundeli na yo ya nzóto óyo evándaka na makila bilembi nioso pete
  • Bilembo misusu lokóla fièvre, ko konda moko oyebi ko limbolá na soki nzoto ezo lenga na malíli
  • Infection ya ba bactéries oyo ya kala mingí te
  • Soki ozali elengi na ya mbúla 20 tǒ mpé likólo ya mbúla 50

Mónganga na yo ako túna na tina ya pasi moko yeba molayi ya pasi na yo mpé níni azo mema yango. Ekoki pé ko zala drapeau rouge soki:

  • Bilembo emi-lembisa te ata o bongoli loléngé na yo ko telema tǒ mpé ko mi-lalisa na bopemi
  • Pasi ekangamí na yo ko léka poso mibalé ata ko bazo salisá yangó pona lobíko
  • Ozo nsima té été pasi na yo ewuti na ko-mibenda, ko-miniolisa o salaki na eténi ya nzóto na yo oyo ya likoló ya mókóngo
  • Nzóto Ekembi na tongo are very stiff in the morning
  • Pasi ezali tango nionso mpé ezalí ko bonga té

Mónganga na yo ako túna soki okutana déjà na mikakatano na makolo na yo, to pé likámá na vessie na yo, to mitshopo na yo émemelaka yo makama na kala. Eko lakisá eté kilo makasi ezalí likoló ya ba misisa na yo ya mukúwa ya mokongo tǒ mpé Moelle épinière, oyo ewuta soki disc moko emilongoli na esika na yango ya yambo tǒ lisúsu na pota.

Pasi mususu ewutaka soki ozali ko léka na mikakatano na ba poumons na yo, œsophage, estomac, pancréas, foie to vésicule biliaire na yo. Oyo ezali tango likámá moko mususu ekokí ko memela mokongo na yo pasi.

Ko landa ba bilembo na yo, lisolo ya mikakatano na nzoto okutana na ngo na kala, na ba examens, mónganga na akokí ko séngá eté obakisa ba test misusu. Na kati na yango to zali na test ya makila mm, include blood tests, Rayon-X and MRI scanner (test Esálelaka ba ondes magnétiques na ondes radio pona ko bimisá bilílí ya kati ya nzóto). Okoki pe ko léka na might also have a Scanner DEXA, oui etalaka loléngé mikúwa na yo ezali yako kuna.

Traitement ya pasi na mokongo likolo

Soki mukongo na yo ezonsuwa likoló, ko mi-zwela libiki eza na ngo pete atá kutu ba traiter yo te. Soki ewutaki na ngo na eloko moko te ya mabe makási, eko limwa na ngo na sima ya ba mposo mwa ndámbo.

Yo moko okoki ko salelá mwa ba toli oyo eko batela yo lokóla ko bongisá etelemi na yo, tia eloko ya moto tǒ oyo ya malíli makasi na esika ezalí ko zuwa. Ko Bosana te ko latisa yango mobimba mwa elamba po eté yango moko te nde e niata poso na yo mbala moko.

KoMisunga yo moko

Soki o banso eté ozali na lipeka malíli, esengeli eté okutana na physiothérapeute na yó. Kási makambu ebelé na pembeni okoki pé ko sala pona ko misunga.

Soki olingí kisi oyo esilisaka pasi na likoló ya mókóngo, mela ba analgésiques oyo ya etekamaka na ngo na bo pete ndeti paracetamol tǒ ibuprofen. Túna toli na pharmacien na yo.

Soki likambo moko pakala nde e boti pasi wana, bako salisá yangó ko landa eloko ebótaki yango.

Traitement oyo eko senga ko mela kisi, physiothérapie, ba tonga mpé ba thérapies ya maboko.

Ko mibatela na pasi ya likoló ya mokongo

Mwa Ba toli Oyo ekobatela obota pasi likoló ya mokongo te.

  • Tombola biloko na bo bangi mpé na bo kebi, ngúmba mabolongo na yo kasi tolo te.
  • Zala mayélé po eté tolo na yo ézala yako telema malamu tango ozalí ya ko vanda
  • Soki o lamuki na mukongo ko suwa, lisungi koki ko zala na mwa matelas oyo ezo vandisa malámu nzoto na yó mpé ezo balana na ba ngomba nionso ya mokongo na yo.
  • Pemaka mingi mingi tango ozali ko vandaka esika moko tango molayi na kati ya misálá na yo osalaka seko na seko.
  • Ko Telemisa nzoto malámu ekoma eloko na yo ya tangu nionso – tálá esika to lobeli makambu oyo e memaka pasi ya mokongo.
  • Salaka ba exercices mingi mingi – tanga na liziba na bísó FAQ ya mitúna na biyano na tina ya ba exercices moko ya bo keseni pona ko pesa nguyá na mukongo.
  • Yekola pe salela na bokébi ba technique nionso ya masano oyo o betaka.
  • Kata ko sala makambo oyo ememaka pasi na mukongo na yo.
  • Kata ko mela makaya – eko bebisela yo na lombango ba disc na mukúwa ya mokongo na yo oyo ekitisaka musuku ya mbalakata.
  • Soki pe ozali monene na ndenge ya koleka, konda, ekoki ko batela yo soki pási ya mokongo ebelemi weight.

QR code naar deze pagina

QR Code
nl_NLDutch