033 - 2003259
Pasi na sé ya mokongo e salemaka mingi mingi. Na bomoyi ya lélo soki oponi batu misatu, mibale na bango ekomonana été ba zali na pasi na sé ya mokongo na mbala moko. Makambu ebandisaka yango ezali na ngo ya grave te mpé pasi yango po e mata eko senga ata mposo minie to motoba.
Yo moko okoki ko mi-bikisa na pasi ya sé ya mokongo. Pona ba loléngé mususu ya bilembo, eko senga na yo o mona physiothérapeute.
Mokongo nay o ezali na biteni ebela ekangama kamgama, ezali na mikuwa, ba joints, ba misuni, ba ligaments, misisasi na ba tendons. Mukuwa na yo ya mokongo nde ememaka kilo ya mukongo na yo mobimba. Esalemi na mikuwa 24 ya moko na moko oyo bi-bengami “vertèbre”, elanda moko likolo ya moninga. Na sé ya ba vertèbre, esika ya ko suka ya mikúwa ya mukongo na yo, mikúwa ya sacrum na oyo ya coccyx evandí wana. Na káti káti ya ba vertèbres, ba disc alembisaka musuku-suku pé osungaka mokúwa ya mokongo na yo e ngúmba.
. Your spinal cord threads through the vertebrae, carrying nerve signals between your brain and the rest of your body. Moelle épinière na yo etandéma té na sé ya mokongo na yó, pé na sima ekomaka lingomba ya misisa. Ebengami “Cauda equina”, na munoko ya latin elingí koloba “Mokila ya punda”, esáláka ndeti ko kokona na yangó. Ba minganga bázalaka na mwa pasi ko limbolá óyo esálaka pási ya mokongo. Ezalí pô été yangó etondi na biténi ebelé pé misuni ya pete pembeni pembeni na yangó.
Bilembo ekesanaka moto na moto. Ekoki ko koma mbálá mókó, tango omemi eloko ya kilo, té soki o tamboli na loléngé eté mukongo e suwa. Tangu mususu oko yebá té loléngé ezo yela, kasi ezo matá malembé malembé. Pási ezaláka ya pete mpé ya makási ko léka. Batu mususu bako yóka pasi ‘a lisoko misúsu na lokolo, misusu ti na bitambe na misapi. Ba bengaka yangó sciatique. Bato ebelé oyo bazalí ko yóka mokongo pási, eyébénáka malamu te sókí pási ya mukongo wana ezalí ko wuta na likambo níni. Elakisi eté eyebani malamu mingi te likambo ememaka pasi ya mokongo (ndeti mwa likámá mókó ebatama óyo eséngi móngana kolandela.
Atá ósáli ba tests, eko simba na ngo te, pô été oko koka ko timbela na yo té likámá mobótisi ya pási wana na mukúwa ya mokongo to misuni na yangó.
Ezo tia mwa mbilinga mbilinga na moto, kási elakísí káka eté eloko ebandisaka yangó eyebani na ngo malámu te.
Bato 9/10 ba monaka sé ya mikongo na bango ko koma malamu après mposo motoba. Okoki ko yoka malamu yambo makasi, kaka na ba mposo mokié sima. Kasi kutana na GP na yo soki pasi ebakami, ekomi lisusu mabé mpé azo bonga atá mokié te. Soki pe oyoki nzoto malamu te pé moto ebandí, luka GP na yo. Soki o bela cancer tǒ ostéoporose, GP na yo ako landela pona ko yebá soki ba nzela misusu ya bokono bizalí te.
Luka libiki ya mónganga na lombango soki yo o:
Seek medical attention right away if you:
Ekoki ko zala bilembo ya ko lakisá eté misisa oyo ezalí na sé ya mukuwa ya mokongo na yo efinami. Yango nde to bengi mpé esengélí ezwa Traitement moko na lombango.
Lelo lelo, yango nde ezalí pasi ya mokongo ya makasi. Mónganga akokí na yé pé te ko limbolela yo malamu eloko ezo bandisa pasi wana, kasi ewutaka na ngo na likama ya makasi.te. Ewutaka mingi soki mwa musunu ebendani mwa mokié kaka, ba tendons mpé na ba ligaments oyo pembeni pembeni ya mokongo na yó, kasi moto ayébi malámu.
Likambo moko sóngóló ekoki ko bandisa pasi ya mokongo. Tangu mususu o mi-niolosaki, o balolaki to o tombolaki eloko ya kilo. Tangu mususu ebandaki ko loba malembé malembé. Pona bato mosusu, ko sala makambo káka moko na mosala mokolo na mokolo na ba ngonga molayi pe obotaka yango. Okoki mpé ko Kamatá pasi ya mokongo soki ozalí mwa monene ko leka. Ki mokóló esáláka été mikúwa eliama, yango nde ememaka pasi ya mokongo. Etelemi mabé ekokí pé ko tia kilo makasi na mukúwa na yo ya sima mokongo. Soki makambo ebele soki esanganí ekoki ko bota pasi na mokongo, na kati na yango mpé makambo ya mutema.
Tangu mususu pasi ya mukongo ewutaka tangu ndambu ya mokúwa na yo ya mokongo ebébí, loléngé ndeti :
Pasi ya mokongo eyaka pé na nzela ya makama makasi ndeti Cancer to infection, kasi esalemaka mingi te.
Physiothérapeute to GP na azalí na makokí yako yeba na bo pete soki ozwami na pasi ya mokongo kaka na bilembo ozo lakisá tango azo examiner yo. Physiothérapeute moto óyo mosálá na yé ezalí santé ya batu mpé ayébi yango makasi ko léka, yě avandisa mayele na yé nionso na ko sala été makambo nionso ya nzoto ya moto ezonga ko mi-niolisaka pé ko báluka malamu. Okoki na yo mpé ko sepela ko kzndymbala moko epayi ya physiothérapeute.
Soki oyebi ko landela mokongo na yo, akokí ko batela mokongo na yo makasi mosika ya pasi. Ko sala makambo oyo ekokí ko sunga yo.
Physiothérapeute bako akolendisa na tina eté yo moko ozalaka mpé na lolenge okokí ko mi-sunga. Bakoki ko pesa yo toli na loléngé ya ba exercices nini ósála oyo eko salisá yo.
GP akokí ko tinda yo na thérapie physique pona ko lembisa pasi ya mokongo. Na kati ná yangó tozali na: