Revalidatie na gebroken pols Congolees

Bozongisi loboko sima eté poignet ebukanam

Afbeelding met persoon, person, verband Automatisch gegenereerde beschrijving

Esengeli oyeba eté ba mposo motóbá pé likoló makokí koleka yambo osasela lisúsu poignet na yo lisusu malámu. Po eté pási nionso elimwa libélá, eko salá sánzá mísáto. Sima o longolá plâtre, lisungi ya physiothérapeute tmna traitement wana eko zala na litómba..

Exercices

Tango plâtre e longwe, Mónganga na yo esi a yebisá kala été okokí ko salelá loboko pé poignet na yo lisusu. Mpé okokí ko banda ba exercices ya rehabilitation. Awa na sé to tandi ba exercices ébélé. Esengeli eté o sala ba exercice wâná ndéngé to lakisi, po eté olekisa yango pé te na loboko na yo.

Mwa makambo ya ko bendela yo matoyi tango ba exercices:

o Tangu ba longoli plâtre, loboko pé poignet na yo eko zala lisusu ndenge moko té (eko vimba, lángi eko bongwana) mpé okoyóka yangó ekuba pé eko salá mwa pasi.

o Exercise eko kítisaka ko kuba na pási. Yango ezalí na litómba mingi.

o Sima ya exercice loboko ekokí ko vimba, pasi eko bakama, kasi sima ya heure moko eko zongá’a ngo na ndéngé ya bomesano. Soki pasi, mela Paracétamol.

Tango ba longoli plâtre

Na kati ya mposo ya libosó to óyo ya mibale na sima ko longólá plâtre, mekaka loboko na yo na ba misálá ná yo ya mokolo na mokolo. Bandá ko misokola, ko mi-latisa, ko mi-lesa, ko ngúmba bilambá, ko longólá pé ko solola basani (biloko kaka ya mikié pé ko sǎni mókó tangu okomeka pé ná sima o tiki). Panza misálá wana na mokóló mobimba pe tia matoyi na bilembo ya pási ya poignet na yo. Pasi ko mata sima ya exercice, soki ewumeli makasi, elakisi eté ekosenga na bínó ko lembisa. Sima mposo mínéi, malembé malembé bakisaka mwa bokási pe mipiku ya ba exercices.. Oyo ezo kanama ezalí eté moto asalela loboko to poignet na yé na sima ya ba mposo 6 na ndenge na ngo ya bo mesano.

Exercise ya rehabilitation pona poignet ebukaná

Meka ko salá exercise mingí, mingí mingí mbala 4-6 na mokolo pé bandela exercice Mókó na mókó mabala zómi. Sala malemba kasi makasi te.

3.1 Ngumba pé panza molayi poignet na yo, benda na molayi poignet na avant-bras na yo, landá ba súka ya mésa. Soki oyo ezalí pete, sima ya mposo mibalé, okokí ko bakisa lisusu mwa bokási, yambala wana kanga kopo ya mayi na maboko na yo, etóndá Kasi ezalí na kati káti ya 1 litre.

3.2 Musekuseku ya beta zongá : tinda loboko na ngámbo mókó pé zongisa yango na ngámbo mosúsu.

3.3 Ko bolola ya avant-bras) poignet. Tia tango mókó nimakoko tango mókó mosúsu likata ya loboko na yo, salá bobele bôngó mingi na ko balolaka avant-bras na yó.

3.4 Kanga likofi. Kanga ba loléngé oyo ya makofi na misapi na yo

3.5 lisapi ya monene : Lisapi na yo ya monene esimba óyo ya index, sima ya katikati, sima óyo ya Bagui ya libála, té na óyo ya mukié.

3.6 Lipeka/coude balola lipeka na yo. Ngúmba pé fongola coude na yo. Mitúna ko banga te ko túna mónganga na bísó ya exercice physique, mosali ba plâtre na bísó oyo a salaka nionso.

QR code naar deze pagina

QR Code
nl_NLDutch