033 - 2003259
Likámá oyo ya RSI (repetitive strain injury) ezalí ba microtraumatismes, na ba mingayi et libumu pási oyo Ewutaka na misálá to bandelaka mokolo na mokóló tǒ mpé loléngé o vandela na tango ya mosala pe ndéngé o mitelemisaka mabe. Ba bengi yangó pota oyo ekomáká sókí moto asaleli eloko na ndenge ya koleka tǒ mpé syndrome de surutilisation. RSI eko bebisa mingi ba poignets pé maboko na yó.
Okoki ko zwa likámá RSI na ba Loléngé ebelé ya misálá ébélé. RSI ekoki ko ya ndenge osalelaka ordinateur mingí mingi, mpé sókí mosálá na yo esengaka yo obandelaka káka makambo moko tango na tango. Ekoki pé ko wuta na misala yako sepelisa motéma ndeti ko tia peinture mpé ko beta masano ndeti tennis to golf. Soki omoni ndeti ozala na RSI, ezalí na litómba eté o beta yango kara té.
RSI ekoki ko wuta na makambo ébélé. Na káti na yangó tozali na:
Soki loléngé ya mosálá osalaka okoki ko mema yo na likámá ya RSI na bopete, okoki ko sala mwa makambo pona ko mibatela. Solola na Patron na yo pona yango.
RSI ebimisaka bilembo ebele, ndeti pási pé misuni na ba joints na yo biko koma pete pete. Bilembo misusu ya RSI oyo eyebani:
Nzoto na yo ekoki na ngo pé té ko vimba atá ko ozo yóka pasi. Pasi ekoki ko bakama soki olukí lobíko te. Eyindaka mabé tée okoka lisusu ko kende mosálá té, to pé ko salá misálá na yo ya mikolo nionso té. Soki bilembo na yo ezo bongaka soki o mi-pemisi, esengeli o banza ko bongola mosálá na yo to pé ko bongisá esika na yo ya mosála. Solola na patron na yo to moto óyo apesaki bino toli na oyo etálí mosálá. Soki bilembo ya RSI na yo ezo beba na yango káka atá ko obongoli mosala na yo, luka GP na yo.
Pona kotimbela RSI ezalaka pé te pô été ezalí na test moko te pakala pona yango. Soki okeyi ko mona GP na yo na bilembo ya RSI, bako tuna yo ba bilembo wâná pe bako examiner yo. Bakokí pé ko landela lisoló na yo ya kala na makambo ya bokono, pé ko yebá loléngé níni ya misálá ósálaka. Yebisá GP soki misálá misúsu ébotelaka yo bilembo ya GP, tǒ mpé ekómisaka yangó makási.
GP na yo akokí pé ko tinda yo o sala mwa ba tests. Kaka pona ko mona nini ezo tinda bilembo wâná. Na kati na yango to zali na test ya makilá pe ya ko landela misasi na yo ya nzóto, ndakisa.
Oko timbela été bilembo ya RSI na yo eko koma malámu sókí obandi ko pemisa eténi na yo ya nzóto óyo ezalí na mbeba. Meka pé ko pémaka penza na ndéngé ya solo, zala mosika ya misálá na yo nionso oyo ebótaka ba bilembo wâná, pé malembé zongelá mosálá sima eté bilembo wana evanda kímiá. Soki wâná ezo simba na ngo te, sukisa tango óyo okokí ko lekisaka na mosálá na yo, eko sunga yo. Koba nako niolisaka eténi ya nzóto na yo óyo ezwaki mbébá, kasi salá yangó na loléngé eté esálá yo pasi te, sunga misuni na yo ebandana pé ezalá makási.
Soki ba bilembo na yo ezo wuta na mosálá, eleko ya yambo ezalí ko solola na Patron na yo, to mokambi na yo na mosálá. Patron na yo akoki ko tindá yo epái ya ergothérapeute to conseiller en santé au travail ko luka toli pé lisungi. Nako landela esika na yo ya mosála tǒ mpé ndéngé ósálaka mosala, okokí ko timbela eloko nini ezo méma likambo. Koba na mosálá soki okoki, kasi kítisaka malembe malembe ngonga óyo olekisaka na mosálá. Soki oko koka te ko kota to kondisa mosala na yo, kata mingí mingi pona ko pema, pé mi-niolisaka makolo na maboko. Kabolá tango na yo nako salaka makambo ébélé mbálá mókó pô o salá káka likambo mókó té tango molayi. Soki osalelaka ordinateur, Luka ata souris mususu to clavier mosúsu pona ko lembisa pasi. Somba oyo ba sala na loléngé ebalana na loléngé ya moto pona ko salisá ye makombo na pete pete. Elakísí te ke eko salá penza malámu kasi batu misúsu ba monaka été ezalí na tina.
Okoki ko mona sókí otia elóko ya malíli likoló ya esíká wâná, ezo lembisa pasi na nzóto na yo pé ezo kitisa ko vimba. Soki bilembo ezalí ko koma lisúsu mabe makási, tia mwa glace to tia glace na kati ya elambá pé likoló ya esíká wâná. Salela elóko ya malíli wana pendant 20 Minutes na mbálá moko. Ko tia glace yě moko te likoló ya poso pô été glace ekokí ko bebisa poso. Soki glace esimbí te, meka elóko ya moto. Na malembé tia elóko ya moto likoló ya eténi ya nzóto na yó óyo eza na likámá. Okokí pe lisúsu ko meka ko sokola mayi ya moto.
Ba analgésiques oyo ya etekamaka na ngo na bo pete, ndeti ba anti-inflammatoires non stéroïdiens (AINS) na ba paracétamol ekoki ko lembisa ba bilembo. Okoki ko somba ba analgésiques na ba supermarchés to na ba pharmacies, kasi melaka yangó na sima ya toli ya GP na yo. Ko melaka ba analgésiques ya solo esilisaka pási, kasi mobokó oyo ezali ko memeka makámá ekoki ko tíkálá pé oko timbela te. Yango ekoki lisúsu ko bebisa makambo solo.
Soki na komibatela na yo mpé ba mbóngwana omemi na mosálá esimbí te ko bongisá bilembo, Ekoki ko séngá o mona a physiothérapeute. Bako lakisá yo loléngé nini ko pemisa nzóto na yo. Bako sunga yo pé ko benda pé ko kubisa misuni na yo oyo ezokaki na ba exercice ya malámu, mpé ko lakisa loléngé nini oko bandá mpé ko telema na mosálá na yo.
Soki ba traitements misusu esimbí te, top pee evimbisi ba tendons, GP na yo akoki pé ko séngá eté obetama treatments haven’t worked or you have inflammation in a specific tendon, your GP may suggest you have a tonga ya corticostéroïe.
Soki GP na yo atimbeli eté bilembo ya bokono na yo ezo wuta nde na mikakatano mókó songolo ya nzóto lokóla syndrome du canal carpien, ba koki pé ko tinda yo epayi ya monganga moko mokonzi ya lipaso ya bokono wapi.
Pona ko mibatela na ba traumatismed RSI, tia mundele óyo ya makambu oko sala té, makambu mususu oyo o bandelaka bandelaka, mingí óyo esengélákí yo o memeka ba machini ya minene to oyo eningisaka na nguyá. Eko sengama na yo pé o bongisa evandeli pé esika na yo, kataka me mosálá pona ko pémaka mingí mingi. Ba Patron etindamela bango na mobekó ete ba sengeli ko batela bato ya mosála bazwá RSI te to mpé eyinda makási te na ba oyo bazali na ngo kala. Wana ewuti na mobéko ya 1974 elobela santé na sécurité na mosala, etc. mpé règlement ya 1999 kolanda gestion ya santé na ya sécurité na mosálá. Soki osalelaka ordinateur na mosálá, o batelami na Règlement ya 1992 na tina ya santé Mpé la sécurité (ba Machine ezalí na televizyo na ngo ya bilili). Soki o Sali eloko tê, likámá ya RSI eko beba lisusu makási. Makambu ewutaka etelemi/evándeli moko ya malamu te, ko sala mosala na loléngé bo mesano te to loléngé ya ko tambuisa biloko ya kilo tǒ ko emema oyo ya kilo te. Patron na yo esengeli a sala évaluation ya ba risques Nako surveillaka loléngé ozali ko sala mosálá,. Mpé a meka ko luka makambu oyo ebatama Bakozala na Posa ya: