Grippe
Grippe eza nini
Grippe ebikaka mingi yango moko, kasi ekoki pe komema maladie ya grave epayi ya batu misusu. Esengeli kozua vaccin ya grippe soki ba yebisi yo.
Ba symptôme
Ba symptôme ya grippe emonanaka mbangu pe ekoki kozala na:
- température komata mbala moko na 38C to koleka
- nzoto pasi
- kolemba to kozanga makasi
- kosukosu ya makasi
- pasi na mungongo
- mutu pasi
- kolala na pasi
- Kozanga appetit
- diarrhée to libumu pasi
- koyoka nzoto pasi pe kobanda kobela
Ba symptôme ekoki kozala ndenge moko epayi ya bana, kasi bakoki pe koyoka litoyi pasi pe ko zala ya kolemba.
Oko sala nini soki oza na grippe
Pona kosunga yo oyoka malamu noki:
- Pema mpe lala
- Zala na moto
- mela paracétamol to ibuprofène pona kokitisa température ya nzoto pe ko traiter ba pasi na nzoto
- Mela mayi mingi pona ko éviter déshydratation (1,5 ti na 2 litres na mokolo)
Pharmacien akoki ko sunga yo soki oza na grippe
Pharmacien akoki ko pesa ba conseil ya traitement pe ko lakisa ba kisi ya grippe. Soki ozo mela déja paracetamol na ibuprofène, kosalela ba kisi ya pharmacien te, po okoki kolekisa dose.
Contagieux
Eloko osengeli kosala pona kopanza grippe te:
Grippe eza très contagieuse pe epanzanaka facilement na batu mususu. Okoki kopesa batu mususu na 5 premiers jours. Grippe epanzanaka na microbe oyo ebimaka tangu to kosolaka, ekoki ko vivre na maboko to na surface pendant 24 heures.
Pona ko kitisa risque ya kopanza grippe:
- sokola maboko mingi na mayi na savon
- salela mouchoir tango ozo kosola
- buaka mouchoir mbala moko na poubelle soki osilisi
Tango nini okoki kobenga docteur
- soki oza ko mitungisa na ba symptôme ya bébé na yo to pe muana na yo
- soki oza na zemi
- soki oza na malade ya motema to tension
- soki oza na problème ya santé banda kala – exemple, Asthme, COPD, diabète, maladie ya motema, ya poumon, ya ba rein na ya ba nerfs
- Soki oza na système immunitaire elemba – exemple, likolo ya chimiothérapie to SIDA
- Soki ba symptôme ezo sila te après 7 jours
- Soki oza na 60 ans to koleka