033 - 2003259
Taux ya cholestérol ya komata esalemaka soki oza na mafuta oyo babengi cholestérol na makila.
Cholestérol ya komata eza causé na consommation ya biloko ya mafuta, kosala exercice te, munene makasi, cigarette na masanga. Ekoki pe kozala na famille.
Taux ya cholestérol ya komata ezalaka na symptôme te. Okoki koyeba kaka soki osali test ya makila.
Soki cholestérol eleki mingi ekoki ko kanga nzela ya makila. Ekosala ete ozala na probleme na motema to osala crise cardiaque.
Okoki ko kitisa taux ya cholestérol na kolia malamu pe kosala ba exercice mingi. Batu mususu esengeli ba mela ba kisi.
Kolia biloko ya mafuta mingi te
Pona ko kitisa taux ya cholestérol, meka ko tika kolia biloko eleka mafuta, mingi mingi biloko oyo ezali na graisse saturé. Okoki kolia biloko oyo eza na mafuta ya malamu oyo ebangami graisse insaturée.
Meka kolia mingi:
![]() |
![]() |
![]() |
Meka kolia moins:
![]() |
![]() |
![]() |
Sala ba exercice mingi
Meka ko sala au moins 150 minutes (2,5 heures) ya exercice na semaine.
Tika ko mela cigarette
Ko mela cigarette ekoki ko matisa taux ya cholestérol na yo, pe ekoki ko mema bokono neti crise cardiaque, AVC na cancer. Soki olingi kotika ko mela cigarette, okoki kozua lisungi epayi ya docteur nayo.
Kitisa masanga
Okoki kozala ba posa ya ba kisi pona ko kitisa taux ya cholestérol soki taux ya cholestérol ekiti te sima ya kolia malamu pe kotika makambu misusu to soki okoki kosala AVC.
Statine
Statine eza kisi oyo epesamaka mingi pona cholestérol emata. Ezo kitisa quantité ya cholestérol na nzoto. Oko mela comprimé moko na mokolo. Esengeli omela yango vie mobimba.
Ba kisi misusu pona cholestérol
Okoki kosalela ba kisi misusu soki Statine ezo simba té to soki olingi komela Statine te. Lokola ezetimibe, fibrate, chélateur (babengaka yango lisusu résine) na ba acide bempédoïque. Okoki mpe kozwa tonga– lokola alirocumab na evolocumab.