Maladie cardiovasculaire
Insuffisance cardiaque eza nini
Ba maladie cardiovasculaire (MCV) eza terme pona ko designer ba problème oyo etalaka motema na ba vaisseau sanguin.
Ezalaka associé na kokangama ya ba mafuta na kati ya ba artère (athérosclérose) pe na risque makasi ya makila kokangama. Ekoki pe kozala associé na ba pota na ba artère ya biloko ya nzoto lokola bongo, motema, ba rein na misu. Batu mingi bakufaka likolo ya ba maladie cardiovasculaire, kasi okoki kokima yango soki ozali ko vivre malamu.
Ba cause ya ba maladie cardiovasculaire
Ba cause ya maladie cardiovasculaire eyebani penza te, kasi biloko mingi ekoki komatisa risque ya kozwa yango. Yango babengaka “biloko ya risque”. Plus oza na biloko ya risque, plus ba chance ya ko sala maladie cardiovasculaire eza munene. Biloko ya risque ya minene ya maladie cardiovasculaire tolebeli yango nasé.
Hypertension artérielle
Hypertension artérielle (hypertension) eza moko ya ba risque ya makasi ya ba maladie cardiovasculaire. Soki tension artérielle na yo eza ya komata makasi, ekoki ko bebisa ba vaisseau sanguin na yo.
Pona koyeba mingi makabo etali hypertension artérielle.
Komela likaya
Cigarette na ba sorte mususu ya tabac eza mpe moko ya biloko ya risque munene pona ba maladie cardiovasculaire. Ba substance nocive ya tabac ekoki ko bebisa na ko kondisa ba vaisseau sanguin na yo.
Taux ya cholestérol emata
Cholestérol eza substance ya mafuta ezalaka na kati ya makila. Soki oza na taux ya cholestérol emata, ba vaisseau sanguin na yo ekoki ko konda pe ko matisa risque ya makila kokangama.
Pona koyeba mingi makabo etali hypercholestérolémie.
Diabète
Diabète eza maladie esilaka te oyo esalaka ete taux ya sucre na yo na makila emata. Glycemie ya komata ekoki ko bebisa ba vaisseau sanguin, na ko kondisa yango. Batu mingi ya diabète ya type 2 baza mpe minene makasi, yango pe eza eloko ya risque ya maladie cardiovasculaire.
Kosala eloko te
Soki osalaka ba exercice regulièrement te, okoki kozala na pression artérielle emata, taux ya cholestérol emata pe munene koleka. Biloko nionso oyo eza ba biloko ya risque ya maladie cardiovasculaire.
Kosala exercice regulièrement eko sunga yo po motema nayo ezala malamu. Soki osangisi yango na kolia malamu, exercice ekoki ko sunga yo na ko maintenir poids ya malamu.
Kozala munene makasi to obèse
Kozala munene makasi to obèse eko matisa risque ya kozwa diabète na hypertension artérielle, oyo eza biloko mibale ya risque ya MCV.
Ozo na risque ya maladie cardiovasculaire soki:
- Indice ya masse corporelle na yo eza 25 to koleka.
- Oza mobali na loketo ya 94cm (environ 37 pouces) to koleka, to oza mwasi na loketo ya 80cm (environ 31,5 pouces) to koleka
HIstoir eya famille na maladie cardiovasculaire
Soki oza na ba antécedent ya maladie cardiovasculaire na famille, risque na yo ya kozala nango pe eza makasi.
Oza considéré lokola oza na ba antécédent ya maladie cardiovasculaire soki:
- Papa na yo to ndeko nayo ya mobali azala na maladie cardiovasculaire avant âge ya 55 ans
- Maman na yo to ndeko nayo ya mwasi azala na maladie cardiovasculaire avant âge ya 65 ans
Yebisa docteur to infirmier na yo soki oza na ba antécédent ya maladie cardiovasculaire na famille. Bakoki ko yebisa yo osalisa examen ya tension artérielle na taux ya cholestérol na yo.
Origine ethnique
Ba maladie cardiovasculaire ekomi plus mingi epayi ya batu ya origine sud-asiatique pe na origine africaine to caraibes.
Eza po ete, batu ya ba origine oyo, baza na chance ya kozala na biloko ya risque risque ya maladie cardiovasculaire, neti hypertension to diabète ya type 2 .
Biloko misusu ya risque
Biloko misusu ezalaka na risque ya maladie cardiovasculaire eza:
- âge – ba maladie cardiovasculaire eza mingi epayi ya batu oyo ya plus de 50 ans pe risque emataka ndenge age ezo mata
- sexe – Mibali baza mingi na risque ya kozala na maladie cardiovasculaire na âge yasé ke basi
- Bileyi – Kolia mabe ekoki ko sala ete taux ya cholestérol emata pe pression artérielle emata. Kolia biloko ya mafuta to mungwa mingi.
- alcool – consommation koleka ya alcool ekoki mpe ko matisa taux ya cholestérol pe na tension artérielle, pe ko matisa kilo
- Ba kisi
Ba symptôme
Oko banda kosuba mingi na butu. Oko lemba mbangu soki ozosala excerice. Okoki ko se yoka pema mukuse soki oza ya kolala to ozo sala exercice.
xamen na docteur
Partie moko ya examen oyo eza kotala risque nayo moko na maladie cardiovasculaire pe ko lakisa yo ndenge ya kokitisa risque yango soki esengeli.