MPOC
MPOC na nutrition
Batu mingi ba kamuaka ya koyeba ke ba bilei baliaka ekoki ko affecter ko pema na bango . Nzoto na yo esalelaka bilei lokola carburant pona ba activités na ngo. Kosangisa ba bilei malamu ya kolia ekoki kosunga yo opema malamu. Bilei moko té na ye moko ekoki kopesa nionso oyo nzoto ezana ngo besoin—kolia bilei ya petua eza lolenge mingi . Yo na monganga na yo boko sala plan ya bilei kaka pona yo moko. Kokutana na nutritionniste diététiste eko sunga yo yako zala na nzela malamu.
Lien ya bilei na respiration eza nini?
Processus ya kobongola ba bilei na carburant na nzoto babengaka ngo métabolisme. Oxygène na bilei eza ba matières premières ya processus, énergie na dioxyde ya carbone eza ba produits finis. Dioxyde ya carbone eza déchet oyo tobimisaka.
Kosangisa bilei malamu na kolia na yo eko sunga yo kopema malamu.
Métabolisme ya ba glucides eproduizaka mingi ba dioxyde ya carbone pona quantité ya oxygène tosalelaka ; kasi métabolisme ya ba graisses eproduisaka mukie. Pona batu mususu oyo bazo bela MPOC, bilei ya ba glucides mukie pe ya ba matières grasses ebele esungaka bango ba pema malamu mingi.
Ba directives ya kolia
Pona ba glucides complexes, lokola mapa na ba pâtes ya grains entiers, ba fruits na ndunda.
Pona kokitisa kilo: liaka mingi ba fruits na ba ndunda na lipa na ba pâtes pona ba majorités ya ba glucides complexes .
Pona komatisa kilo: lia variété ya ba glucides ya grains entiers na ba fruits pe ba ndunda.
- Sukisa ba glucides simples, sukali, ba bonbons, ba gâteaux pe na boissons gazeuses.
- Lia 20 ti 30 grammes ya fibre mikolo nionso, oyo ewuti na bilei lokola lipa, ba pâtes, ba noix, ba graines, ba fruits na ba ndunda. Lia ba biley oyo eza na ba proteines mbala mibale na mokolo pona ko aider ba muscles respiratoires ezala makasi. Choix malamu eza miliki, ba maki, fromage, misuni,mbisi, soso, ba noix na ba madesu to ba pois secs.
Pona kokitisa kilo: pona bilei oyo eza na proteines faibles ya gras neti misuni na ba miliki faibles ya gras.
Pona komatisa kilo: pona ba proteines ya forte teneur ya matières grasses, neti miliki, fromage ya miliki pe na yawu.
- Pona ba graisses mono pe poly-insaturées, oyo eza na cholestérol te. Eza ba graisses mingi ya mayi ya temperature normale pe ewutaka na ba sources végétales, neti ba mafuta ya canola, ya carthame pe na ya maïs.
Pona kokitisa kilo: Sukisa kolia ba graisses.
Pona komatisa: bakisa ba graisses oyo na bilei na yo.
- Sukisa ba biley oyo eza na ba gras trans pe na ba gras saturés. Neti, beurre, saidoux, graisse na poso ya misuni, ba huiles végétales hydrogénées, shortening, ba frits, ba biscuits, ba craquelins pe na gateaux.
Remarke: Ezali ba directives générales ya biley pona batu bazo bela MPOC. Ba posa batu ekeseni, solola na docteur na yo to RDN avant obongola régime na yo ya kolia.
Mataka kilo
Zala na momesano yako mataka kilo. Balance nde ekolakisa yo soki okitisi to omatisi kilo. Osengeli ko mona docteur to diéteste na yo soki ozo continuer ko kita kilo to oza mata kilo soki ozo landa régime recommandé. Eza pe na ba complications ya santé oyo ekoki kokitisa kilo to komatisa kilo . Nzoto oyo ezo lia malamu eza na makoki ya gerer ba infections. Tangu batu bazo bela MPOC bazuaka infection, oyo ekoki kokoma gave moki pe komema na hopital. Biley malamu ekoki kosunga yo pona makambu oyo ekoma te. Soki bokono ezali, nzoto oyo eliaka bien eko réagir malamu na traitement.
Ba vitamines na mineraux
Batu ebele bamonaka limbata komela multivitamine ya usage général. Mbala mingi batu oyo baza na bokono ya MPOC bamela ba stéroïdes. Komela na tango mulayi ba stéroïdes ekoki komatisa ba bosenga ya calcium. Kanisa komela ba supplément ya calcium. Luka moko oyo eza na vitamine D. Carbonate ya calcium to citrate ya calcium eza ba sources malamu ya calcium. Liboso obanda komela ba vitamines mikolo nionso, solola nanu na monganga na yo.
Sodium
Komala ba sodium ebele ekoki vimbisa yo pe komatisa tension. Soki kovimba na hypertension eza ba problème ya santé pona yo, solola na monganga pona quantité ya sodium okoki komela mikolo nionso. Tuna mituna epayi ya RDN na yo pona koyeba ndenga ya kotia ba épices pe na ba makasa na bilei na yo pe na ba moyens mosusu ya kokitisa consommation ya sodium.
Ba fluides
Komela mayi mingi eza litomba kaka pona kozala hydrate té, kasi pona sunga kobatela mucus mukie pona elongwa moki. Solola na monganga na yo pona consommation ya mayi. Likanisi malamu pona batu ebele eza komela 6 ti 8 verres (23 cl na verre moko) na mokolo. Komeka komela mayi nionso na mbala moko te; kabola na mokolo mobimba. Batu mususu bamonaka litomba kotondisa carafe na mayi na tongo nionso oyo akomela na mukolo mobimba. Nasima babandi kola verre moko moko ti ekosila na mokolo mobimba. Kobosana te ke ba mayi nionso ya petua oyo ezanga caféiné ezo compté pona objectif ya ba mayi, pe ba bilei mingi ebakisaka quantité ya ba mayi.
Bosaleli ya ba produits nutrionnels médicaux
Tangu mususu okosala na mikakatano yako yanola na ba besoins nutrionnels ya bilei ya momesano, soki oza na bosenga mingi ya ba calories ya mikolo nionso. Koleka, soki RDN na yo ezo senga ko pona mingi ba colories ya ba lipides—variété polyinsaturée, monounsaturée, pe na cholesterol ya teneur faible—Oko koka te ko koma na bosenga moki na bilei ya momesano. RDN na yo to monganga na yo ako senga yo omela babengaka produit nutritionnel médical (supplement). Ba produits mususu bakoki kosalela yango na regimecomplet na batu oyo bako kaka kolia ba bilei ya momesano, to kobakisa na bilei oyo olia mingi epayi ya batu bazo koka kolia mingi te.
Toli pona bilei
- Pema avant olia.
- Lia na tongo soki olembaka mingi pona kolia na pokua.
- Mipekisa bilei oyo eko provoquer ba gaz na ko vimba libumu. Ekomisaka kopema pasi.
- Lia 4 to 6 bilei ya mukie na mokolo. Eko sala ete tolo na yo eningana malamu pe ba poumon na yo epema malamu
- Soki komela mayi tangu ozo lia etondisa yo, komela te; mela na sika ya ngonga moko.
- Kanisaka komela supplement nutritionnel na butu po eviter koyoka neti oza ya ko tonda na moyi