Fysiotherapie na een beroerte Congolees

Kobika mpe kozonga na sima ya crise cardiaque

Afbeelding met persoon, muur, binnen, shirt Automatisch gegenereerde beschrijving

Kobika pe kozonga na sima ya crise cardiaque ekoki kozwa tango mulayi, pe ekoki kozala pasi kozala na motivation. Oyo eza ba conseils ekoki kosunga:

  • Meka kozala positif mpe tala kaka eloko oyo olingi osala
  • Pona ba objectifs oyo okoki ko atteindre mpe eza important pona yo mpe ekosala ete ozala motivé.
  • Ba ndeko na baninga bakosunga yo na oyo olingi osala.
  • Sala ba exercice nayo na kati ya makambu ya mikolo nioso
  • Koma ba progres nioso ozali kosala.

Complications ya crise cardiaque

Ba crise cardiaque misusu ezalaka makasi te mpe okozonga malamu noki. Misusu ekoki kozala makasi pe kosala ba problemes ebele. Batu misusu ba bikaka te soki basali crise cardiaque.

complications ekoki koya na sima ezacan:

  • Probleme na nzoto – par exemple, kolemba na coté moko ya nzoto, pasi na ba mouvement to balance, pasi na ba muscles
  • Problemes ya ko sentir, ko simba, ba temperature mpe pasi
  • Pasi pona komela, ekoki kosala ete mutu alia mpe amela na pasi
  • Koyaka bolembu mpe ko koka kolala te
  • Problemes ya communication na pasi na maloba, kotanga pe ko koma
  • problemes ya komona– par exemple, okoki komona mibale, komona floue to pasi pona komona
  • problemes na cerveau– elakisi pasi pona ko kanisa, memoire pe concentration
  • pasi pona kokanga masuba to ba mouvement ya loketo
  • difficultés naba emotion – par exemple, batu oyo baza pembeni nayo bakomona bizaleli nayo echanger to okoki kobanda kobanga banga to kosala depression
  • problemes pona relation sexuelle likolo ya impact na nzoto mpe na makanisi likolo ya crise cardiaque

Ba problemes oyo ekoki kosala ete ba activité ya mikolo nioso ekoma pasi na sima ya crise cardiaque. Ekoki ko koma pasi osala makambu yomoko.

Kobika na crise cardiaque

Kosala crise cardique ekoki komema makambu ebele. Ekoki kosenga obandela koyekola ndenge ya kosala makambu misusu to kobongola ndenge osalaka yango. Eyebani lokola crise rehabilitation na sima ya crise cardiaque. Soki ozwi lisungi ya malamu, okobanda lisusu kosepela na bomoyi nayo mpe kobanda kosala makambu yomoko. Ba docteurs pe ba infirmieres oyo bazali kolandela yo bakosala yo ba examen yambo obima na hopital pe obanda rehabilitation. Okozala na ba rendez0vous po balandela evolution nayo. Okomona ba specialiste ya ndenge ebele lokola:

  • physiotherapistes pona kosunga koyesa ba muscles nayo makasi pe ko bongisa ba mouvement nayo
  • therapistes ya occupation oyo akosunga yo po ozongela ba activité ya mikolo nioso lokola kolata bilamba
  • therapistes ya maloba pona kosunga na ba problemes oza nango ya koloba to komela
  • Docteur alandelaka makambu ya kolia pona kosala ete ozwa ba proteines nioso oyo nzoto esengeli
  • Ba consiellers oyo ba kosunga yo pona support emotionel

Prevention ya crise cardiaque

Eza na makambu ebele okoki kosala pona ko diminuer ba chance ya crise cardiaque, soki esi osali crise cardiaque eko sunga po osala mususu te, eza oyo elandi.

  • Kosala  ba exercice physique, ko fanda mingi esika moko te.
  • Soki omelaka cigarette, tika komela.
  • Kosala ete ozo lia malamu, kolia minimu 5 fruit na mukolo na ndunda, kotika kolia mafuta, mungwa mingi
  • Kozala na poids ya malamu, pe kokitisa kilo soki esengeli
  • Soki omelaka masanga, sala ete omela na limite ya malamu

QR code naar deze pagina

QR Code
nl_NLDutch